Luka

Mozambiko etungisami na mpela makasi mpe ba mayi ya mbula ebele. Mozambiko etungisami na mpela makasi mpe ba mayi ya mbula ebele. 

Pàpa asambeli mpo na ekolo Mozambiko, epai wapi Mpela monene ebomaki bato

Na libakù lya malongi ma yé na likita lya banso, Pàpa Leon ya XIV alobelaki “balingami bato ya Mozambiko”, zambi ebetami na mpela makasi ebebisaki nyonso sima na yé. Pàpa atomboli losambo la yé mpo ya bato banso bazwami na likàma linà. Alaki kozali pembeni na mabota, baye balungwi bamboka ya bango mpe baye bazali kosunga bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na libakù lya malongi ma yé ya mokolo mwa misato mwa 28 ya Yanuali, Pàpa Leon ya XIV alobaki ‘te: “Makanisi ma ngai mopumbwé kino na balingami bato ba Mozambiko, oyo bazwi likàmà yam pela makasi ebebisi eloko inso”. Akundolaki bonene bwa mbemba eye, mbula ya makasi oyo ezali kobeta ut’o sànzà ya Okotobe moleki, na mboka, alobelaki yango, mingi mpenza bato bamobembo ya lokota lya portugais (les Lusopgones). Bato pene na nkamà moko nà tuku misato na nsambo (137 personnes) bakufaki mpe bato pene na nkoto nkàma mwambé na zomi na mibale (812 000) batungisami na mpela ena makasi. Nakopeza liyebisi linà mpo na motango lya nsuka ya makàmà, ezali bongo, l'Institut national de gestion des catastrophes (INGD) ya ekolo ya Mozambiko. 

Pàpa alobaki ‘te: “awa na zali kosambela mp ona baye bazwi likàma ya mpela, nazali mpe kolakisa bozali pene na ngai nà bato baye balongwi bamboka ya bango, nà mpe baye bazali kopesa bango lisungi”. “Tika ‘te Nzambe asunga mpe abenisa binso”, ekobaki ye ba koloba. Tembe te, na nsuka ya losambo la Angelus la mokolo mwa 18 ya sànzà eye ya Yanuali, ( À l'issue de la prière de l'Angélus du 18 janvier) Pàpa asilaki kolakisa bozalani pembeni bwa ye, na bato banso bazwaki likàmà makasi ya meteo na Afrika inso ya Ngele (Sudi), nà ekolo Mozambiko lokola.

Ekolo eye ya Mozambiko, ezwami na mpoanzi ya Afrika ya ngele nà ndambo ya mopanzi ya moniele na yango (Sud-Est d’Afrique), ezali na kati ya eleko ya mbula makasi. Ebandaki na sanzà ya Okotobe ya 2025, bongo esengeli kosila na sànzà ya Marsi ya 2026.

Mgr João Carlos Hatoa Nunes, archevêque ya Maputo, na Mozambiko
Mgr João Carlos Hatoa Nunes, archevêque ya Maputo, na Mozambiko

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

28 sánzá ya yambo 2026, 17:40