Luka

Radio Ecclezia na Luanda, lolàkà mpo na Eklezya ya Angola

Na boumeli ya mibu koleka tuku sambo (70 ans), radio oyo ezali kosàlà ut’o biro monene ya lisàngà ya baepiskopo ya Angola, ekomi eloko ya ntina mingi mpo na bapanzi sango ya Angola. Na esika yango, bato bazali na esengo ya kolanda mayebisi mpo na mobembo ya Pápa Léon XIV na ekólo na bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na ndako ya ba episkopo ya Angola, na balabala Sao Paulo na Luanda, Radio Ecclesia ezali ndako ya mateya ya katoliko mpe ya bapanzi sango na ekolo Angola. Etambwisaki emisyo na yango ya liboso na mokolo mwa mwambé ya sanza ya desembe (8-12-1954), mpo na kokumisa bosukisi ya mobu mosantu ya Maria mpe elandaki minyoko ya lisoló ya mboka. Nsima ya mbula zomi banda efungwamá, radio yango ezali kokóba kopanza nsango tee na ngonga ya liboso ya ntongo, koleka baradio mosusu na ekólo mobimba.

Na 1975, na Angola oyo ewutaki kozwa lipanda, bakonzi ya Leta bakótisaki radio na mboka. Balongolaki yango na nzela ya mobeko ya mokonzi ya mboka. Na nsima, etumba ya bana-mboka ebandaki. Ezali bobele na 1997 nde radio ya Katoliko ezongaki na bomoi. Esika yango efungwamaki na lisalisi ya Kardinal Alexandre do Nacimento, episkopo ya Luanda mpe na tango wana mokambi ya ba episkopo ya Angola mpe ya São Tomé; azalaki mpe ministre ya Communication. Kobanda wana, mongongo to lolàla la ye lizali kaka na ntina mingi mpo na Bakatoliko mpe na radio ya Angola.

Programi oyo ebongisami mpo na moto na moto

Ntango Pápa ayaki, ndako yango ekómaki lokola ndako ya nzoi. Sionia Junior, mokambi ya tekiniki, ayebisi ‘te: “Tozali na kati ya emisyo moko ya ntina mingi”. Alakisaki studio esika bato misato bazali na nsima ya mikro, moko moine franciscain, moko scout mpe moko mamelo. Na mobembo ya Léon XIV, basalaki baprogrami oyo ebongisamaki mpo na bango, kobanda na ngonga ya 10 tee na ngonga ya 19. Bato motoba bazali kosala mosala na bango ya mokolo mobimba, kasi babengi bapanzi-nsango mingi na Luanda mikolo miye mpo na kopesa bango mabókó. Bamemi nsango ya ntina batindamaki na libándá ya mpepo mpo na kopesa nsango ya bokomi ya Tata Mosantu, na mausolée ya Agostinho Neto, pene na ndako ya Mokambi ya mboka, basusu lisusu na Sanctuaire ya Maria ya Muxima.

Kati na bango, Pedro Timotio, oyo asalaka na radio ya dioseze ya Kwanza Nord, oyo ezali na kati ya Radio Ecclesia, oyo etikali moke ekende na ndako ya bapastele epai Pápa akofanda na boumeli ya mobembo mwa yen a ekolo eye. Boyei ya Pàpa ezali likambo monene, elobi ye, bato awa bazali kozela nsango oyo ekoki kosangisa bato. Tozali na maponami na mbula ekoyà, mpe mitungisi ezali komonana polele. Tozali kozela maloba maye makoki kosalisa mpo na kozongisa boyokani kati na bato.

Radio Ecclesia, oyo bato bapesaka yango limemya na kati ya mboka, ata mpe na libanda ya Eklezia katoliko, eyebani mingi koleka na mikolo miye ya mobembo ya Pàpa. Ezali “Radio moko ya kotyela motema (confiance)”, slogan na ye ezali koyokana na maloba ya Léon XIV: bato ya Angola bazali na mposa ya confiance mpo na kotala mikolo mizali koyà (avenire) ya kimya mpe kolónga bokabwani na bango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

19 sánzá ya mínei 2026, 22:30