Luka

Papa asengi na bakonzi ba Angola ‘te bàsala na mboka na bango yókó mosala mwa elikya

Na lisukulu lya ye, oyo asalaki na Ndako ya Mokambi ya ekolo, na Luanda, liboso lya bakonzi ya mopelengano mpe societe sivili, Leon ya XIV apesaki lokùmù n abato ba Angola mpe na ezalela malamu ya molimo mpe ya momeseno ya bankoko. Nganga-Mokonzi alobi ‘te mobembo mwa yen a Angola, ezali mp ona kosalisa bato, oyo esengeli kotosa mimeseno na bango mpe bosengà na bango ya bosembo mpe boyokani, mp ona kotonga mboka ya sika

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mwa moke nsima ya kokoma na Luanda na tongo, Pàpa akendaki na ndako ya Mokambi ya ekolo (palais présidentiel) epai kuna João Manuel Gonçalves Lourenço, asololaki na ye na bonkuku. Na nsima, Pàpa akendeki na pavillon protocolaire mpo na kokutana na bakonzi ba mopelengano (politiki), ya société sivili mpe ya diplomatie, mpo na lisikulu na ye ya liboso na mabele ya Angola.

Sima ya kokabola esengo na ye ya koya na Angola, Pàpa alobi polele likambo la mobembo mwa ye na ekolo oyo ba salelaka mingi: “Nazali na mposa ya kokutana na bino na boboto mpe ya koyeba ete bato na bino bazali na biloko ya motuya oyo ekoki kotekama te to koyiba te”, alobaki liboso ya bakonzi, ya bato ya Angola, oyo wapi Papa akumisaki na esengo, atako bazali na makàmà ya kala”.

“Boyebi ‘te, mingi mingi tótalaka baetuka na bino mpo na kopesa to kozwa mwa eloko”. Esengeli kobuka ezalela ya koluka mbano na bomoi y abato basusu mpo na kokitisa bango lokola biloko ya koteka. Na kotala Angola, Pàpa alekisi miso ma yen a mabele ma Afrika oyo ezali mpo na mokili mobimba “ntina ya esengo mpe ya elikya. Alobi ‘te, abengi yango mabongi ma mopelengano, tembe te, bilenge mpe babólà biye, bazali kolota nayino, lokola mpe bazali nayino kolikya. Basepeli mpamba te na oyo esi ezali, kasi balingi batombwama, bazali komilengele mpo ya kokamba makambo ma bontoki bango moko.  

Bwanya bwa bato ba Angola

  Nganga-Mokonzi akumisaki bwanya ya bato baye, bamitiki te na mabanzo mpe makanisi y abato basusu, kasi bazali na mposa ezangi ndelo makasi ontei ya mitema mya bango, koleka ndulu ya politiki to ya mimeseno bya bankoko. Leon alobelaki ntina ya mobembo mwa ye na mabele oyo ya Angola “Nayei lokola Mosàli malamu okati ya bino, mpo na kolamusa to kotombola bato mpe mangomba, oyo, ezali kosàla ekolo ya Angola mpe ekolisi yango na langi ya likolo makasi. Na lingi koyoka mpe kolendisa bato oyo basili kopona bolamu, boyengebene to bosembo, kimya, kokanga motema, kozongisa boyokani.  

Pape alimbolaki lisusu boni-boni mimeseno mya bonkoko mpe ya molimo ya Angola ekoki kozala nkisi: “Bozali batatoli to banzeneneke, na lisalisi lya mayele ma kala oyo ezali koleisa makanisi mpe ba mposa to mayoki ma bino, ‘te bozalisi ezali na boyokani kati na bomengo ya bokeseni”. Bato ba bino banyokwami mingi mpenza, tango boyokani boye moyibamaki na nzela ya lolendo y abato basusu. Afrika ezali na bosenga na lombango ya kolónga ezalela mpe makambo ma bitumba mpe ya koyinana, oyo ezali kopanza makambo ma bomoi bwa bato mpe ya politiki ya mikili mingi, oyo ezali kopesa nzela na bobóla mpe na bopengwi.

Kobongola matata na nzela ya bozongisami sika

Pàpa alendisi bakonzi ba Angola nakoyoka malamu bato ba bango. Mpamba ‘te, Angola ekoki kobonga na miso ma bato, soki nayino bino bato bozali na bokonzi, bozali kondima bokeseni ya bomengo bozali na yango. Bobanga te mpo na bokabwani, boboma te ba vision to bimoniseli ya bilenge mpe bandoto ya mibange, boyeba lolenge kani kokata matata, se bongo bokobongola yango na nzela ya kozongisama sika. Bótya matomba ya bato banso liboso ya oyo ya etuluku na bino moko, mpe bóbebisa te etuluku na bino elongo na etuluku mosusu. Se bongo, makambo oyo eleká ekomonisa ‘te bozali na elonga, ata soki na ntango wana bato basusu bazali kokangela bino motema.

Kotonga Angola ya sika elongo na lisalisi lya Eklezya

Papa asukisi na kolobela esengo ya bato ya Angola, likabo ya motuya mpo na kokende liboso. Apesi ndakisa ya maloba ma Santu Polo: “Mbuma ya Molimo ezali bolingo, esengo, kimya” (Gal 5, 22). Esengo ezali eloko oyo ezali kokóbisa o bozindo bomoyi mpe ezali kotinda biso na mabele ya polele ya bomoi bwa bato, moto na moto azali kosepela na kosalela makoki ma yé ya kozala na bondeko (capacités relationnelles), na koyeba kopesa eteni na ye mp ona bolamu bwa bato banso (contribuer na bien commun) mpe na komiyoka molingami lokola azali se ye moko moto mosusu azali te, mpe azali na bomoto.

Na mosolo to nkita oyo, na libula na ye mpe na makoki ma ye, Léon XIV alimbolaki na bakonzi ya Angola ‘te; bakoki kokomisa Angola “mosala mwa elikya”. Mpo na yango, Eklezya Katoliko elingaki kozala levire kati na potopoto mpe elingi kobotisa ezalela ya bomoi moko na ndakisa ya bosembo elongo, na bonsomi; kolongola boombo oyo epesami na bato ya lokumu oyo bazali na bozwi mingi mpe na bisengo ya lokuta. Bobele se na lisanga nde tokoki kobakisa to kobilisama makoki ya bato baye ya kitoko, kino na biteni ya bingumba mpe na bamboka ya mosika epai bomoi na bango ezali kobundisama mpe bazali kobongisa mikolo mya bango mikoya”.

Lisukùlu lya Pàpa na bakonzi y'Angola

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 sánzá ya mínei 2026, 23:45