Guinée Équatoriale: Balakisi motó mwa maloba ma ntina mpe elembo ya mobembo ya Pàpa
Eklezya ya Katoliko ya Guinée Équatoriale ebimisaki na mpwasa motó mwa maloba ma ntina mpe elembo ya mobembo ya Pápa Léon XIV. Na liyebisi lipesamaki na mokolo mwa 03 ya marsi, Lisanga lya baepiskopo ya Guinée équatoriale (CEGE) elobaki ‘te na nzela ya biloko biye mibale, balingi kolakisa o bozindo, misisa ya lingomba ya bakristu mpe molende mwa mosala to etindà ezali kotambola na bango elengo na eleko eye ya ngrasya.
05 sánzá ya mísáto 2026, 22:19