Guinée Équatoriale: Balakisi motó mwa maloba ma ntina mpe elembo ya mobembo ya Pàpa
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Kristu, mwinda ya Guinée Équatoriale, na nzela ya elikya mpo na mikolo mizali koyà”. Ezali motó ya maloba baepiskopo ya Guinée équatoriale baponi mpo na mobembo ya Pàpa epai na bango, oyo ekosalema o mokolo mwa 21 kino 23 ya sànzà ya Aprili. Baepiskopo balobi ‘te mokano monà, emonisi polele lolenge kani eklezya ya Katolikà ezali nini mpe mokumba to etindà na yango ezali nini. Baepiskopo balobi ‘te liloba “Kristu” elimboli ‘te Mokonzi azali moboko ya bomoto bwa bakristu ya mboka mpe esika ya ntina ya mobembo ya boyambi bwa bato ba ye. Tango bazali koloba : “Mwinda mwa Guinée”, Eklezia ezali kolakisa nguya ya mbongwana ya Nsango Elamu oyo esengeli kongengisa bomoi bwa bato, ezalela ya bonkoko mpe ya bizaleli malamu ya ekolo. Na nsuka, bakonzi bayambo ya eklezya balobi: ‘Kokende na nzela ya elikya mpo na mikolo mizali koyà”, mpo na kotalela mikakatano mya mikolo mya biso, mingi mingi oyo etali bilenge, mateya, kimya mpe lokumu la moto.
Makambo ma libota, ezali likebi monene ezali kotungisa eklezya ya Guinée Équatoriale.
Mpo na maye matali logo, esalemi na lolenge lya elembo ya boyokani ya mobembo ya Eklezia na Guinée équatoriale mpe elikya ya sika, oyo mobembo ya Pape Léon XIV ekopesa. Lapolo yango elobaki ‘te na nsónge ya elembo enà, ezali na ekulusu ya wolo ezali komonisa Kristu oyo asekwaki, moboko mpe liziba monene ya boyambi bwa bakristu. Na katikati ya ekólo mobimba, ezali na libota moko, ezali komonisa : mobali moko, mwasi mpe mwana moko, batélémi elongo esika moko. Baepiskopo balimboli yango lokola libota ya Afrika, elembo ya “bomoko, liziba lya bato mpe esika ya liboso ya kopalinginya Nsango Elamu”.
Likambo mosusu ya ntina ezali mo-misionele azali na masuwa, abaluki mpe azali kotala na loboko la mobali, azali kotala na mikolo mizali koya, asimbi búku mpe azali kotala epai na libota. Baepiskopo balobi ‘te yango ezali komonisa eklezya oyo asimbami na Kristu. Azali na bokebi mpo na mabota, mpe ezwi mokano makasi ya kotalela mikolo mizali koya. Na nsuka, mayi monene mpe mbonge, oyo emonisi langi ya bulé oyo ezali kongenga mpe ya moindo makasi, ezali elilingi ya molende mpe ya mikakatano ya mosala ya kopalinginya Nsango Elamu, kasi ezali mpe elilingi ya “mayi ma batisimo, ezibelo ya bomoi bwa bakristu”.
Na nsima ya elilingi, ezali nà langi ya bendela ya ekólo - langi ya mayi ya pondu, ya mpembe mpe ya motane - oyo ezali elembo ya mabele, ya kimya mpe ya etumba mpo na bonsomi. Likoló ya balangi, elilingi ya libota emonisami, ezali kolimbola ‘te “Nsango Elamu ezwami kati na lisoló mpe na ezalela ya bonkóko bwa bato”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye