Le Episkopo wa lokumu, Louis Raphaël Sako, patriarche ya Eklezya ya ba-chaldéenne na 2018 (photo d'archive). Le Episkopo wa lokumu, Louis Raphaël Sako, patriarche ya Eklezya ya ba-chaldéenne na 2018 (photo d'archive).  (AFP or licensors)

Episkopo wa lokumu Sako: «Etumba ezali eyano te»

Awa Irak ezali konyokwama na masasi ya Iran, mokonzi ya Bakaldé azali mpe komitungisa mpo na likàmà ya etumba monene kati na etuka, mpe azali kobyanga bakonzi basusu ya mangomba ya Iraq, batombola lolàkà la bango mpo bàlendisa kimya.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lolenge yoko na bikolo biyiké ya Moyen-Orient, Iraq esi eleki poso moko banda Iran ebandi kobeta ba masasi, ba roquettes mpe ba drones mpo na kozongisa eyano na ba bombi ya Israel elongo nà Etats-Unis na Républiki ya Islam. Engumba Erbil, mboka-mokonzi ya Kurdistan ya Irak etungisamaki na ba attaki mingi, kasi mboka mobimba ezwamaki na ba attaki: ba champs ya pétrole lokola na Bassora na sud, mpe aéroport ya Bagdad.

Atako likámá ya kopalangana ya bitumba na etúká mobimba ezali ya solo, mokonzi ya lingomba ya Bakaladi na Bagdad abombaki te bobangi na ye. «Lokola mokonzi ya lingomba, nazali nazali komitungisa mingi mpo na likambo lite, mpamba te, moto moko te ayebi esika wapi etumba oyo ekomema. Mpe biso, tokutanaki na likambo yango na 2003, kardinal Louis Raphaël Sako alimbolaki na Radio Vatikan. Bakoki kotanga «mobulungano, mobulu, kozongisa mabe, bitumba».

Bobangi ‘te makambo ekobeba lisusu

Atako ba miliciens ya ba chiites oyo bazali kosunga Iran na Irak basili kosangana mingi te na bitumba, Patriarche ya Chaldée azali kokundola makama maye mazali koyela bato ya Iraq, epai wapi kuna ba chiites bazali pene na 60% ya bato. «Tozali na bobangi mpamba ‘te tozali ba voisins ya Iran mpe ba Irakiens mingi bazali ba chiites. Ezali na mayoki mibale»

«Tozali kobanga kobakisama ya mobulu oyo ekotinda biso na bitumba ya monene na etuka mobimba», elobaki Episkopo wa lokumu Sako. Mpe abakisaki ‘te ; bitumba oyo ezali koleka na mikili ya Golfe, na Turquie mpe na Azerbaïdjan. “Etumba ezali eyano te, elobi ye, ezali diplomatie nde ekoki kosalisa na kosilisa mikakatano”.  Mokonzi ya Lingomba ya Kaladea azali mpe kotalela na likebi mpenza makambo oyo ezali kokómela mangomba ya bakristu, mingi mpenza, oyo ezali na lobwaku ya Ninive. Mingi kati na bango, bakimaki mpo na minyokoli ya misala ya Leta ya Islam. “Biso Bakristu, tozali komitungisa mingi mpo soki babandi kobundisa mokili ya Ninive, esika oyo ezali na Bakristu  nkoto tuku mitano (50.000), bato wana bakolongwa na bandako na bango mpe mbal’oyo, bakozonga lisusu te”, elobi Patriarche.

Kotombola lolaka mpo na Kimya

Nasengaki na bakristu mokolo mwa lomingo bàsambela mpo na kimya na tango ya ba misa manso na ba ndakonzambe; bàzala na bomilengeli, bàzala na bokebi mpe balemba te to mpe babungisa elikya te”. Episkopo wa lokumu Sako alobi ‘te azali mpe na elikya na maloba ma bakambi basusu ya lingomba na Irak mpo na kokitisa mobulu. “Asengaki na bakambi ya mangomba (Bamizilma) ‘te batombola mingongo na bango mpo na kimya, mpo na bondeko”. Lokola Pàpa François asalaki na mobembo na ye na Irak mpe na bokutani na Al Sistani.

Bokutani oyo ya kala elongo nà mokonzi ya ba Shiiti na engumba esantu ya Nadjaf, na mokolo mwa motoba ya sanza y amarsi ya mobù 2021 (6 mars 2021) etikali tango ya ntina mingi mpe ezali na motuya koleka mpo na mikolo mizali koyà, ya boyokani kati na mangomba na Irak. Alobaki ‘te :«Tozali eteni ya bino mpe bino bozali eteni ya biso», bobele lokola oyo François alobakà ‘te: «Tozali bandeko»

Na mokolo mwa 4 sanza ya marsi, ntango ba bombi bizalaki kaka kokweya na etuka, Ayatollah Al Sistani abimisaki maloba na ye, na kati na yango amitungisaki  mpo na bopalangani ya bitumba na etuka mobimba. Bongo azongisaki «mbela na yé epai ya bato banso bazali na bokonzi na mokili mobimba mpe na mikili mya mokili mobimba, mingimingi mikili ya bamizilma (Islam), mpo ‘te basala manso makoki mpo na kosukisa bitumba na lombango to  nokinoki mpe bàluka mwango ya bosembo mpe ya kimya mpo na likambo lya nikleere ya Iran, na kolanda lolenge elongobani na mibeko ya mokili mobimba».

Bokutani na lisapo kati na Pàpa François mpe Moto monene ayatollah Al-Sistani

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

07 sánzá ya mísáto 2026, 22:39