Angola ebimisi logo na yango mpe devise mpo na mobembo ya Pàpa
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bazwi likanisi na bilembo biye bizali na boyokani nà eyamba mpe bomoto ya mboka. Logo baponi mpo na mobembo mwango mozali na nsango ya bomoko mpe ya elikya. Mpo na langi mpe mayemi, bilembo biye bizali kolakisa mwinda mwa etindà to mosàlà ya eklezya o kati ya ekolo: “Kosakola Nsango Elamu mpe kosunga mpo na kotonga mboka ya bondeko mpe ya kimya”, elobaki baepiskópo ya bikolo biye mibale. Motó mwa maloba ma ntina: “Pàpa Leon ya XIV, moto mwa mobembo ya elikya, ya boyokani mpe ya kimya”. Ezali libyangi epai ya bato sembo mpo ‘te bákolisa kondima na bango mpe bámipesa lisusu lokola bakristu. Losambo la bomilengeli, elobeli mingi kobongola motema ya solo, boyambi bwa moto mpe ya elimo ya bomoko, mpe ya bomoko na bato banso, mbuma oyo bazali kozela na boyei bwa Pàpa Léon XIV na mboka.
Mbela na Boyokani mpe Boboto.
“Motamboli to moto na mobembo ya elikya”, makomi ya devize, elimboli ba tata episkopo, elingi kolakisa mokumba mwa Tata-Mosantu, lokola Mokengeli mpate ya mokili mobimba. Azali komema yoko nsango ya bolendisi na molimo mpe ya kotyelana motema moko na moko, mpo na “mikolo mikoyà ya bosembo, ya bondeko mpe bomoko”. Ba wayambo ( les prélats) balobi ‘te, boyokani mpe boboto, ezali na motuya makasi mpo na lisapo lya ekolo Angola, oyo wapi na eleko ewuti koleka, bazalaki na matata ya bitumba. Na likanisi liye, baepiskopo balobi ‘te kozala ya pápa ezali libaku ya kozongisa molende ya mboka mpo na kimya mpe kofanda na kimya, mpe libaku ya kobikisa bampota oyo etikali na makanisi ma ekólo.
Bólóngani na boyambi mpe lisapo lya logo ya mobembo
Logo ya viziti to mobembo ezali na makambo ya kala, ya bonkonko mpe ya teoloji ya ekólo yango. Eteni ya langi ya motane na liyemi to karte ya Angola ezali komonisa kosopama ya makila na ntango ya bitumba. Mondelo ya moyindo moye mozali na likoló ya elembo yango, ezali kolakisa na mbala moko, elembo ya lipamboli mpe ya Afrika, mpe esika na yango ya ntina na mokano mwa Pápa mpo na Afrika. Na katikati ya elembo, demi-cercle moko ya mosaka ezali kolobela piné ya bendela (drapo) ya ekolo Angola, oyo ezali elembo ya mosala mpe ya bokóli, mpe Eukaristya, motema ya boyambi bwa bakristu.
Mobimba ya losambo mpo na mobembo ya Pàpa Leon ya XIV na Angola
Nzambe moko mpe basato, topesi yo matondi mpo na libaku malamu ya kotala biso na Papa. Simba mitema mya biso mpe lamusa kati na biso mposa ya kobongola motema solo, kondima ya mótó mpe elimo ya bomoko mpe ya bondeko mpo na bato banso, mbuma ya boyei ya ntoma na Yo, Pápa Léon XIV, na mboka na biso. Zongisa kati na biso Ministres ordonnés, consacrés, consacrées et fidèles laïcs ba mposa ya komipesa mpo ya kobota mbuma mpo na Eklezia na Yo. Kobatela bana, bilenge, mibange, bato oyo bazali na mbeba na nzoto.
Losambo liye likosalelama na ba parwase, na mabota mpe na mangomba liboso ya boyei bwa Pàpa. Na nzela ya likambo liye, bandimi basengeli kotiya na maboko ma Nzambe mbuma ya mobembo moye mwa ntoma mpe na kosenga ‘te ezala ntango ya matondi mpo na Eklezia mpe mpo na ekolo mobimba.
Na nsuka, likanisi lya losambo oyo bakristu bapesaki mpo na bolengeli ya molimo ya boyei bwa Pàpa, eséngaki na bakristu bábondela Nzambe mpo na kolendisa kondima mpe bomoko kati na bato ba Angola.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.