Baepiskopo ya Vénézuéla balingi kozwa mokano to bikateli mpo na bolamu ya bato
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Liboso lya makambo malekaki na mboka, Episkopo ya Venezuela, na liyebisi moko, alakisaki bozalani pembeni na bato ya mboka na ye. Abyangi bango bakoba na losambo mpe babwaka mitindo minso ya mobulu. Na tongo ya mokolo mwa 3 ya Yanuali ya 2026, mapinga ya basoda ya Amerika bakotaki na Caracas, babetaki masasi na babombi na bisika mingi ya basoda ya mboka mokonzi mpe bakangaki Nicolas Maduro elongo na mwasi way e, na ndako na bango;: bongo bamemaki bang ona boloko ya New York.
Losambo mpo na bomoko
Na makambo “mboka na biso ezali koleka lelomei, sengani na Nzambe apesa n abato banso ya Venezuela: Kimya, bwania mpe bokasi”. Tozali bomoko nà baye bazoki mpe mabota manso bakufeli . Tokoba na losambo mpo na bomoko ya y abato ba biso”. Wana nde maloba ekomamaki na liyebisi lyango
Mikano to bikateli mp ona bolamu lya bato
Baepiskopo basengi mpe lokola, ‘te mikano bazwaki, ezala mp ona bolamu y abato ya Venezuela. “Tozali kobenga basaleli ya Nzambe ‘te bazala na elikya makasi mpe bazala na losambo makasi mpo ‘te kimia ezala na mitema mya biso mpe na mboka na biso, toboyi lolenge inso ya mobulu. Tika ‘te maboko ma biso efungwama mpo na kokutana mpe kosalisana, mpe tika ‘te bikateli ezwamaki ezala tango inso mpo na bolamu ya bato ba biso”.
Na lombango, yoko likita ya Conseil de sekirité ya ONU
Sima ya bitumba na Venezuela, prezida ya Etats-Unis Donald Trump asepelaki mpo na bokangemi ya Nicolás Maduro, mpe alobaki ‘te Washington ekoyangela mboka kino transition ya mopelengano (politiki) ekosalema, mpe ‘te akotiya mbongo na industrie ya pétrole. O mokolo mwa samedi na nsima ya nzanga, Cour suprême ya bazuzi ya Venezuela epesaki mitindo na Delcy Rodríguez, oyo azalaki vice-présidente, mpo na kozala mokambi ya ekolo na esika ya oyo aùti kobima.
Na ngambo na ye, Conseil ya sékirité ya ONU asakolaki ‘te akosala likita ya lombangu mokolo ma yambo, mwa 5 janvier. Balobaki ‘te likita lina ezali mpo na kolobela makambo maye mazali kotiya kimya mpe libateli ya mokili mobimba na likama.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.