Luka

Ba bombi  ya Amerika na mboka-Mokonzi Caracas, na tongo ya mokolo mwa 3 ya sanza ya Yanuali 2026. Ba bombi ya Amerika na mboka-Mokonzi Caracas, na tongo ya mokolo mwa 3 ya sanza ya Yanuali 2026. 

Misionele ya mboka France asengi ‘te bàsambela mpo na Ekolo ya Venezuela

Sàngo Georges Engel, nganga-nzambe ya fidei donum oyo azali na misio na Venezuela, azali kolobela bangonga ya nsuka ya mobulu na mboka, nsima na kokwea ya Nicolas Maduro na nzela ya misala ya mampinga ya Amerika. Na ngonga eye, sàngo misionele enà azali na mboka Espagne.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Akangami na Madrid ut’o sanza ya Novembe eleki, nzokande alingaki komata mpepo mpo akende na Venezuela. Sàngo Georges Engels abombi te bobangi bwa ye ntango Etats-Unis ebundisaki mboka mpe ekangaki mokonzi Nicolas Maduro. Mokambi ya Etats-Unis Donald Trump alobaki ‘te mokonzi oyo alongwe na bokonzi, azalaki o mokolo mwa samedi na sima ya nzanga na masuwa moko ya Etats-Unis, mpo na kokende na New York, epai wapi ye na mwasi na ye basengeli kosambisama mpo na “narcoterrorisme”.

Sango Georges oyo kala azalaka sango ya parwase Notre-Dame de l’Assomption na mboka-mokonzi Caracas. Asali mbula tuku mibale (20 ans) lokola misionele na mboka yango; alobaki ‘te: “Na yebani mpe nasololaka mikolo minso nà bato bayiké na Venezuela, mingi mpenza o mikolo miye. Kasi bayebaki te ‘te likambo moko elingaki kosalema”.  Atako bato mingi ya Venezuela oyo bafandi na bamboka mopaya basepelaki na likambo oyo Etats-Unis esalaki nsima ya basanza mingi ya makaneli ya Washington, bato ba mokili mobimba batelemelaki yango.  Secrétaire général ya ONU Antonio Guterres amitungisaki mingi “mpamba te mibeko mya mokili mobimba etosamaki te” mpe alelaki mpo na “likambo lya mabe” oyo esalemaki. France mpe nà Italie bamonisaki ‘te makambo ma mboka ena ekoki te kobongolama n abato ba libándá. Na nsima, Espagne epesaki likanisi ya kozala moyokanisi.

Bobangi ya Mobulu

Na mboka oyo etondi na bobola mpe na bokabwani makasi, tokoki kobanga ‘te mobulu ekotonda lisusu, mpamba te bokonzi ezali sik’awa kokwea, engebene na Sango Engel. «Na eleko eye ya matata to ya mpasi, mobulu ekoki kobima kati na bato oyo bazalaki kozwa matomba mingi na maboko ya mbulamatari, na ndakisa, bato oyo babéngami ba brigades révolutionnaires, oyo prezida Chavez asalá. Bituluku oyo biekozala na mpasi mingi mpo na kobika na mbongwana oyo ekoki kopengolama na ezalela na bango». Atako basoda bazali kokonza mboka mpe biloko na yango, sàngo azali komitungisa mingimingi mpo na ba collectivistes. Na kopusama na mbongwana ya Cuba, bituluku oyo bizali loboko ya basodá ya boyangeli na ba quartiers populaires, batyamaki na nse ya bokonzi ya ministre ya Intérieur Diosdado Cabello. «Bituluku oyo bazali ba agents radicaux ya révolution bolivarienne mpe bazali na bokonzi ya makasi na ba quartiers », elobi Tata Engel. Mwa bangonga nsima ya bokangami ya Prezida Maduro na mampinga ya Amerika, babandi oyo batambolaka na ba motos basalaki manifestation na centre ya Caracas, mosika te na ndako ya mokambi ya mboka (palais présidentiel).

Mokumba ya eklezya Katoliko na mikolo mikoyà

Lokola kilobi ya mboka eyebani nayino malamu te, Sàngo Engel atali lisusu lisungi oyo Eklezya Katoliko ekoki kopesa na eleko oyo ya sika. «Ekelezya katoliko na Venezuela ezalaka tango inso na ngambo ya bato mike mpe babola ya mboka, mpe mokumba na yango ezali kaka na esika na yango te na mboka oyo ekangami na mibu mingi na mombongo ya bangi mpe na kanyaka». Mpo na sàngo ya fidei donum, Lingomba ya Vénézuéla esengeli «kosakola na makasi nyonso bolimbisi mpe ngolu». «Na ezalela oyo, ntembe te ekozala mpasi mingi mpo na nkita ya bato ya Venezuela, Eklezya esengeli kobakisa makasi mpo na kosalisa ebele ya babola ya mboka oyo, bakoni to bato ba maladi, bana, elobaki lisusu Sàngo Engel, esalaka yango ntango inso mpe ekosala yango lisusu.

Bosambela mpo na Venezuela”, elobaki SàngoEngel, oyo azali na elikya ya kozonga na mboka na ye ya mosala na lombangu. Kobanda sanza ya zomi na moko, mpepo ekoùta na bampepo ya Mikili mya poto ekangamaki, sima ‘te Donald Trump atindaki mampinga ya basoda na mbu ya Caraïbe. Na motuna batunaki ye na sanza ya zomi na moko ya mobu moleki (Interrogé en novembre dernier,) , Pápa Léon XIV asengaki na Etats-Unis mpe na Venezuela ‘te básolola mpe bálongola mobulu.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

03 sánzá ya yambo 2026, 21:38