Luka

Episkopo wa lokumu Pizzaballa azali na Gaza mpo ya kosepela Noele elongo nà lingomba lya Katoliko.

Patriarche latin ya mboka Yeruzaleme akomaki na Gaza, o mokolo mwa 19 ya sànzà ya Desembe. Akei elongo nà Mgr William Shomali, patriarhe-molandi mpo na Yeruzaleme mpe mpo na Palestine, kotala Parwasi moko latine, Sainte-Famille. Kardinale ayaki mpo na koyeba makambo ya mboka mpe bamposa ya bato ya mwa lingomba liye la Katoliko. Kozala na ye elakisi mposa na ye ya kosunga basembwi (fidèle) ba ye na elikia, na bomoko mpe na losambo.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lingomba etiki bango soki moke te, etikali kaka pembeni na bango, pembeni ya bato moke ya Katoliko ya Gaza oyo, mpo na Eyenga ya Mbotama oyo mpe ya 2024, bakozwa mpo na mbala ya minei banda mokolo mwa 7 Okotobe 2023 libondisi mpe lisungi lya Episkopo wa lokumu Pierbattista Pizzaballa.

Na mobembo na Sainte-Famille

Mokonzi ya lingomba ya Latin ya Yeruzaleme akomaki na Gaza o mokolo mwa mitano mpo na milulu ya Noele, lokola asalaki yango na 2024. Likita liye ezalaki kosalema mbula na mbula, kasi na 2023 epekisamaki mpo na babombi ya Israel. Kardinale, elongo na mokambi-molandi ya lingomba ya Latin, Mgr William Shomali, mpe etuluku moke ya bato, bakendaki kotala parwasi ya Sainte-Famille, engebene liyebisi lya bapanzi nsango ya Patriarcat Latin ya Yeruzaleme, oyo ebimisamaki mokolo mwa 19 Desembe.

Luká koyeba lisalisi nini osengeli kopesa

Na mikolo mizali koya, Episkopo wa lokumu Pizzaballa akolobela ezalela ya parwasi, ata mpe misala ya kosunga bato, misala ya kosunga mpe ya kobongisa oyo ezali kosalema, mpe lolenge makambo ekozala na mikolo mizali koya. Akokutana na bakonzi ya mangomba ya mboka mpe bandimi mpo na koyeba bamposa ya bato ya mboka mpe makambo oyo bazali kosala mpo na kosunga bango. Na mokolo mwa lomingo, akosala misa ya Eyenga ya Mbotama na parwasi ya Sainte-Famille.

Boyokani kati na baparwasi mpe bakonzi ba lingomba

Mobembo mwango mozali ebandeli ya feti ya Noele na mboka oyo ekutanaki mpe ekokoba kokutana na makambo ya mpasi mpe ya molili. Ezali komonisa lisusu boyokani ya libela kati na paroisse ya Sainte Famille na Gaza mpe dioseze monene ya Patriarcat ya Latin na Jérusalem. Emonisi mokano ya bomipesi ya Patriarche mpo na kosunga bakristu ba ye na elikia, na bomoko mpe na losambo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

19 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 10:05