Luka

Bai-Palestine babombami na nsé ya ema na esika ya Nuseirat Bai-Palestine babombami na nsé ya ema na esika ya Nuseirat 

Malili pe mbula bikoboma na Gaza

Na moke bato zómi na motóba bakufi na etuka ya Gaza likoló ya ba mbula makási bikobeta úto mokolo ya misáto na Mabelé Esántu. Anton Asfar, Secrétaire général ya Caritas Yerusalem, akoyebisa bisó ba ema bikonda ya baí-Gaza bikangemi na potopoto, bozangi bokolongono pe bopalinginyi ba bokono. Lisangá ebakisaki bisika ya lisálisi úto bozimi-móto, kasi ezali mindondo po ya kokomisa esálelo ya lopitalo na etuka

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Ba ngonga bileki, ba ndáko zómi na misáto bikwei likoló ya ba mbula pe mipepe makasi bikangama na ekumbaki Byron. Bato motóba bakufi na bokwei ya ndáko na bango na Bir al-Naja na nordi ya Gaza. Misusu minei na makambo ya ndéngé waná. Ba ndáko ya makási bibebaki, pe bilembaki, na ba sánzá ebelé ya bokweyisi ba bombe úto ebandeli ya etumba. "Engumba ya Gaza ezalaka esika yókó etóngama malamu, mwa moke ematisamaki libosó ya etumba. Leló, simá ya mobúlú pe bozimi-móto, tokoki koloba 'te eye etikali ezali 50% ya eye ezalaki yambo", elobi secretaire ya Caritas Yerusalem oyo azali na bato na Gaza.

Ba tango bibe bikobakisa pási ya bomoi, mpenza po ya ba nkóto ya mabótá baye bakobika na nsé ya ba bâche. "Bakobika na ba ema biye bibéba. Batindikaki bango epái na epái", elobi Anton Asfar. Na tango ya mpela, eloko yókó te etikalaki ya kokaúka. Bakomeka kobimisa mai na basani ya mike. Bána misáto bazui liwá likoló ya malili ba ngonga 24 bileki.

OMS elobi 'te loléngé ya kobika na hiver, esangani na mai pe bopetoli ya kokoka te, bisengeli komema bomatisi bókó ya mikolobe ya bopemi makási. OMS elobi 'te ba nkóto ya mabótá "babombami sik’oyo na bisika ya mabongo to bizangi bampumbulu, bizangi loléngé ya bomemi mai to ya bobateli".

Na Gaza-engumba, "bokaboli mai ya peto ekosálema malamu te. Ezali likambo lyoko linéne". Babombami (réfugiés) ya Libótá-Esántu (paloise katoliko ya Gaza) batungisami, lokólá basusu, na bozangi bisika ya kovanda. "Eleki mikolo zómi sángó Romanelli (sángó-mokónzi ya Libótá-Esántu) abelaki makási likoló ya bopanzani ya makono biúti na bokolongono bobé. Makono bikopanzana pe lisálisi eye ekokota ekokoka te", elobi Anton Asfar.

Bozimi-móto esúngaki ya kolembisa mwá moke bopekisi ya bokotisi biloko pe lisálisi kasi "ba ema bizali ya kokoka te po ya bato banso", áta bilei, o eleko nzalá ekokoba na etuka. Kati na ba sánzá ya sámbo pe libwa bilekaki, penepene na 38% ya bási ya zemi batalisamaki na Unicef bazuaki eyano ya bolei bobé makási, yangó ezali na "misála mabé na ba nkóto ya bána babotami sika", ebelalaki Unicef.

Bozangi ya mino milongobami ezali pási lokólá. "Tozali bansó na pási ya kokomisa mino pe biloko misusu ya lopitalo na Gaza, pe bisika na bisó tobombaka biloko bizangi nionso", elobi secrétaire général ya Caritas Yerusalem, oyo na bisika ebelé ya lisálisi akokoba ya kokabola eye bakoki komema. Bakolikya na bofúngoli ya ba nzelá ya sika ya lisálisi. Mokolo ya misáto 10 ya sánzá ya zómi na mibále, simá ya koleka ba sánzá mibále ya bokangi, Israël afungoli lisusu nzela ya gbagba Allenby, esika ya boleki ya ntina káti na Cisjordanie pe Jordanie, po ya bolekisi lisálisi po ya Gaza.

Na bozeli ba nkóto ya mituka, bato bakomeka kobika. "Kasi, boyebi, simá ya nsakola ya boyokani ya bozimi-móto, bato babandaki koyéba bosóló na bango, pe ba bombe bikokoba. Soki botelemi na motondo (toit) ya Libótá-Esántu, bokomona ba char libosó na binó. Ba ndambo ya ba obus bikokoba kokweya na libanda ya ndáko-Nzámbe. Naúti koyoka 'te ndambo ya obus etutaki moto mókó, lokólá libanga na lokolo. Ezali likambo lyokó moke, kasi yangó ekokoba kosálema. Yangó waná bato bakobanga kaka. Nini ekoleka lobi?"

Matondo mingi na ndéngé otángi lisolo liye

20 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 16:50