Luka

NIGERIA: Elilingi mpo na ndakisa NIGERIA: Elilingi mpo na ndakisa  (AFP or licensors)

Nigeria: Yoko seminariste akufi na maboko ya baye bakangaki ye.

Diocese ya Auchi esakoli liwa ya Emmanuel Alabi, moko na baseminariste basato oyo bakangaki na ntango ba bundisaki seminele ya moke ya Immaculate Conception na Ivianokpodi, Edo, na ekolo ya Nigeria. Na liyebisi epesami na Tata Linus Imoedemhe, mokambi molandi ya communication sociale ya diosezi, Mgr Gabriel Ghiakhomo Dunia, mokambi ya diosezi, akebisi bakonzi ya politiki mpo na «Bokangi miso na lolenge makambo ya bozangi libateli ezali kobebisa mboka».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Liyebisi lizali koyebisa lisusu likàma likomelaki etukà ya Edo na Nordi-Westi ya Nigeria, na butu mwa mokolo mwa 10 ya yuli. Na ntango ya etumba oyo etyamaki na bato ya mobulu oyo bazalaki na mindoki, basodá babomaki Christopher Aweneghieme, moko na basodá ya libateli, mpe bakangaki baseminariste basato - Japhet Jesse, Joshua Aleobua, mpe Emmanuel Alabi. Na nsima, elobaki ‘te mibale kati na bilenge bina basato, basilaki kotika bango: Joshua Aleobua «mikolo mingi nsima ya bokangami na ye» mpe «na mikolo mileki» Japhet Jesse. Bongo liyebisi linà ebakisaki na mawa nyonso ‘t’ «elenge mobali ya misato . . . akufaki na likama lyango».

 

Kotiya liboso libateli mpe bato bazala malamu, na esika ya ba ambitions ya Mopelengano (Politiki)

Episkopo ya Auchi amonisi mpasi mpe mawa ma ye mpo na liwa ya elenge oyo azalaki na seminele, mpe akebisi bakonzi ba politiki na lolenge bakangi miso na mabe oyo ezali koleka na mboka». Elendisi bango “bàpesa motuya na libateli mpe bolamu ya bato na esika ya mikano ya politiki mpo na maponami ya 2027”. Asengi basungi ya bokengi “bákolisa milende na bango mpo na kobatela bomoi mpe biloko ya bana mboka nyonso”.

Yoko Etumba nà bilongi mingi, ebomi ebele ya bato, ezala kati na bakristu to mpe na Bamizilma

Likambo oyo ya mawa esalemi na ntango ya matata kati na Nigeria mpe Etats-Unis mpo na bonsomi ya losambo. Mokambi ya Etats-Unis alobaki mokolo mwa poso ‘te azali kokanisa kosala mosala ya bokengeli na mboka. Alingi kotalela likambo lya Bakristo mpamba te, azali “komitungisaama mingi mp ona yango”, mpo na motango ya kobomama oyo ezali kobakisama epai ya “ba Islamiques radicaux”. Donald Trump alobi ‘te bazali konyokola bakristo, nzokande bakonzi ya Nigeria balobi ‘te maloba mana ezali na “moboko te”.

Na ngambo na yé, Eklezya ezali kokoba koloba ‘te “ tokoki kokanga monoko tè nakoloba ‘te ezali “génocide ya bakristu, kasi ‘te ekolo ya Afrika ya Westi ezali na bitumba ebele oyo” “ezali koboma ba musulmans mpe bakristu, mbala mingi kozanga kokesenisa bango”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

06 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 12:23