Luka

2025.09.18 Nigéria: Sango Wilfred Ezemba, nganga-nzambe oyo balimwisi 2025.09.18 Nigéria: Sango Wilfred Ezemba, nganga-nzambe oyo balimwisi 

Balimwisi Nganga-nzambe mosusu na Nigeria

Nganga-nzambe Wilfred Ezemba, Sango-Mokonzi ya paroisse ya Saint Paul na Agaliga-Efabo, na Olamaboro, na etuka ya Kogi, alimwisami na basimba-mandoki oyo bayebani te. Elongo na yé, ezali mpe na bato mosusu ya mobembo, na nzela ya Imane-Ogugu. Bolimwisi bonà bosalemaki o mokolo mwa poso, mwa zomi na misato ya sànzà ya setémbe (13septembre).

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Likambo ya kokanga bato na makasi mpe kolimwisa bango ekómi kosalema mpamba-mpamba na Nigeria mpe ezali kokoma lisusu makasi koleka. Bazali kotalela mingi mpenza banganga-nzambe ya ekólo eye ezali na bato mingi koleka na Afrik. Mbala mingi Balimwisi-bato bazali kokanga mpe kobotola bato na makasi na bandako ya mangomba ya losambo, na bandako ya basàngo to na baseminele. Tango mosusu bazali kosala byango na bitulukù ya bato oyo bazali kosala mibembo. Ekweyaki se bongo mpo na Sàngo Wilfred Ezemba; azalaki kosala mobembo na nzela ya Imane-Ogugu, elongo na bato basusu. Esika nganga-nzambe Ezemba mpe baninga bazalaki na yé bakendeki, eyebani naino te, mpe ntina oyo bakangelaki bango eyebani te. Atako bongo, eyebani malamu ‘te likambo liye lisalemaki mpo na kozwa mbongo ya lisiko. Basoda bazali kaka koluka na zamba pene na nzela mpo na koluka bato oyo bakangaki bango, kasi ata elembo moko te emonani.

Bakonzi ya Leta bazali kokipe ata moke te

Bakonzi ya Leta bazali nde kokipe te? Nigeria, ezali bongo ekólo ya misato oyo eleki na bozwi na Afrika, ezali kobunda mpo na kozongisa kimya na mboka, mpamba te biteni mingi ya ekólo yango ebebisami na mobulu ya bateroriste mpe na bato oyo bazali kokanga bato na makasi. Na lisoló moko ewuti koleka kala mingi te, mokambi ya lisanga lya ba episkopo ya Nigeria amonisaki mawa ma ye mpo na mayemanso mazali koleka. Amoni yango lokola kozanga kotiya likebi ya bakonzi mpe bato ya mopelengano to politiki. Bango «bazali komitungisama na makambo maponomi minene ekosalema o mobù 2027. Yango wana, mpo na bokokisi ya bilaka bya ye na ntango ya campagne électorale, kasi “bingumba mpe bamboka ebele na ekolo mobimba ekomi bisika ya bato oyo bazali na bobangi, esika bato bazali kokima mpe kolela”.Mokonzi ya yambo (le prelat) akebisaki ‘te “baoyo bazali komeka kopekisa mbongwana yango na kimya nyonso, bazali kosala ete mbongwana ya mobulu ekoka kopengolama te”. Elobaki ye.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 sánzá ya libwa 2025, 13:22