Nsango ya Léon XIV eyókani na Mitingi ya Rimini
JR Bompolonga – Kinshasa
Bolingo lokolá fúngola mpo ya kososola bosóló mpe kobika yangó na mobimba. Bolingo bokó eye ekosilisa babokeseni te kasi ekobinisa yangó elongo, eye ekobuka te kasi ekolendisa, eye ekotindá bisó libandá na bisó mókó mpo ya komimona minene koleka. Bokási bokó eye ekoki kotambolisa bisó libosó mpe, na nzelá ya bikela na bisó, kotambolisa lisusu mokili mókó eye ekomonana neti etelemi. Bolingo ezali o káti ya mbala ya 47 ya Mitingi mpo ya bolingi káti ya bato ya Rimini, eye esilaki na 26 ya sánzá ya mwambi.
Molúlú liye ya 2026 ebakisami motúya na botáli ya Papá Léon XIV, na 22 ya sánzá ya mwambi, oyo alendisaki ya «kobalola makambo ndéngé bizali kokende» mpe «kolamwisa lisusu bandoto mpe bimoniseli», na boboyi kopelisa «móto ya bolembu mpe ya bobwaki elikya». «Ntángo ya mokúmbá» ekoki, elobaki Papá wa Roma: «Tobimisa polélé boyókani ya bokónzi ezanga sembo, na ebándeli ya bobolá mpe ya babokeseni, ya etumba mpe biye ya mabé ya nzinganzinga. Tolongola mabé ya botomboli ya technologie eleko ekómi kokota bisika nionso mpe kobébisa».
Mokúmbá monéne
«Maloba ya Tatá-Esántu biyókani noki noki, atá sóki nakoki koloba 'te, ntángo alobaki mokúmbá monéne ená, toyambaki yangó na mwá bobángi: ezali etindá yokó ya ntina mpenza, na ndimbola, eye ekopesa elembo lokolá na milúlú mikoya ya Mitingi». Ezali eye elobaki mokambi ya Fondation «Mitingi mpo ya bolingi káti ya bato», Bernhard Scholz.
«Tokoki koyéba yangó: bizali maloba biye bitáli lisapo, biye bitáli etindá yokó ezali ya kosála masoló biye bikoleka ya mokolo na mokolo. Bizali binsó makambo biye bikosimba bisó ya sóló. Úto ebándeli, ntángo ya babokútani ebelé, maloba na ye mpe maloba na ye bilobamaki lisusu. Papá abiangaki ya kosilisa makási ya maloba, mitéma, milimo. Tosengeli kobosana te 'te Mitingi ya Rimini ezali lokolá esika yokó epái wápi Balaíki mpe bakatoliko bamipesa na likambo ya bato bakútanaka mpe basololaka». Mpo ya Bernhard Scholz, «politiki esengeli komipesa na makási, na boyébi na likambo-likonzi ya boboto».
Ntina ya lisoló
«Mpo 'te Eklezia ekoka kokola, esengeli ebaluka na libandá mpe ekoka kosolola na bokeseni, na bobáteli bomoto na ye», elobaki Davide Prosperi, mokónzi ya Bondeko ya Lisangá mpe ya Bonsómi. Asálaki botáli bokó ya Mitingi na bolobi 'te elikya yokó ya sóló ebimi na Rimini, esálemi na boyambi bokó ebikami elongo mpe ekoki kobimisa lisoló, bolingi mpe mokúmbá.
«Mingimingi, likambo emekami na Mitingi elobamaki na bamédia na etáleli yokó koleka esusu, na ndéngé bansango ya leló - ya libosó politiki. Nzokándé, Mitingi esangisi makambo nionso ya bonkoko, ya ntoki mpe ya nzebi», elimboli Davide Prosperi. Mitingi ekómi bôngó «esika yokó ya bokútáni epái wápi baboyébi, babosóló, bantoki, mimeseno mpe biyamba bikeseni bikovanda. Yangó waná ndé, na ndéngé mosusu, ebándi kokokisama moke eye Papá asengaki: kozala basáli ya boboto mpe ya bomoko o ntéi ya Eklezia mpe na mokili»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.