Luka

FILE PHOTO: Lisalisi ya bilei ya ONU mpo ya bato milio 1,3 na Nigéria esika bilei bilingi kosila FILE PHOTO: Lisalisi ya bilei ya ONU mpo ya bato milio 1,3 na Nigéria esika bilei bilingi kosila 

Nordi-esti ya Nigéria libosó ya likámá lyokó ya bato mpe ya bokengi

Na ekóló eye y'Afrika ya Westi, bitumba ya mindóki, bokimi na makási ya bato mpe makambo ya mbongwana ya klima bikopekisa bamilio ya bato ya kolóna mabelé na bangó. Mbano: batálo ya biloko bimáti, bozangi ya biléi ekokola mpe mabótá bizali na pási ya kobika. Engebene na Ong Action contre la Faim, baí-Nigéria koleka milio 36 bazuami leló na bozangi bokengi ya biléi, nzokándé bána koleka milio motóbá bazali na pási ya bozangi biléi.

JR Bompolonga - Kinshasa

«Moto mókó te akolóna. Sóki obimi, bakoboma yo. Batálo ya biléi bikómi likoló koleka mpe tokoki lisusu te koleísa mabótá na bisó», etatoli na nzelá ya nsinga Ibrahim moto ya Letá ya Borno na Nigéria atúnamaki na lokóta ya kanuri. Ya sóló, nordi ya ekóló ezali na bato ebelé n'Afrika ekobunda na bozangi bokengi mibalé eye ekotungisa bato: na ngambo yokó, mobúlú ya bituluku jihadiste biye bikomema botomboki libosó ya Letá úto 2009. Na ngambo esusu, eye ekosálema na bato ya mabé, baye bakosála bolongoli ebelé ya bato mpo ya kofútisa nsikó (rançon). Bomáti ená ya mobúlú ekomema bomáti ya mawa ya bozangi biléi. Na Baletá ya Borno, Adamawa mpe Yobe, esika etumba ebánda, bobángi ekopekisa balóni ya kozonga na bilanga na bangó. Úta koleka mibú zómi, mobúlú esilisi bamboka ebelé. Bato bakende kobombana na bingúmba, esika wápi makoki ya libiki bizali moke.

Mabótá bikobunda na bosóló ya mawa

Mpo ya bato, mosála ya bilanga, liziba ya ntina ya mosolo, ekóma eloko ya pási. «Tokonyokwama mokolo na mokolo. Tokoki kokende lisusu na bilanga te mpo tokomitia na likámá ya bokangi bisó to bobomi. Tokosenga kaka kokoka kozonga kolóna mabelé na bisó», elobi Amina mwási mókó, atúnamaki na nzela ya nsinga lokolá na kanuri, lokóta yokó ya ekóló.

Ezaleli esimbi mbala mókó bána, bási bazali na mokúmbá mpe babangé. Na bozangi bobuki milóna, mabótá bazali na makoki mpo ya kosomba biléi te, kokende na lopitalo to kofúta kelasi ya bána. Yani, elengé mwási mókó esusu, atúnami na lokóta ya haoussa, alimboli bomoí bokó ezui elembo na bokimi na makási ntángo insó. «Úto koleka mibú zómi na mitáno, tosengeli na makási kokima. Kozua biléi ekóma pási koleka. Tozali na mpósá ya lisálisi mpe tokoyamba yangó na matondo», elimboli ye.

Likámá lyokó ekokola

«Mobú eleki, pembeni ya bato milio 33 bazuamaki na bozangi biléi. Mobú eye, tozali koleka milio 36. Káti na bangó, bána koleka milio motóbá na nsé ya mibú mitáno bazali na pási ya bozangi biléi, káti na bangó milio misáto bozangi biléi ya makási koleka», elakisaki mokambi ya Ong Action contre la Faim na Nigéria, Thierno Samba Diallo. Makambo bibimi na likámá liná bizui libosó libosó bána na nsé ya mibú mitáno na lokolá bási bazali na mokúmbá to bakonungísa bána. «Bána milio motóbá bazali na bozangi ya biléi bakolakisa ezaleli yokó ya pási. Bási bazali lokolá káti ya bato ya makámá ya yambo ya bitumba mpe bobébi ya klima», elobi lisusu mokambi ya Action contre la Faim.

Bopesi mosolo ya lisálisi ekokita

Ezaleli ekómi pási koleka lokolá, elobi ye, mpenza «na bokáti mosolo nionso, úta mobú eleki, ntángo tomoni bolongui ya USAID mpe bolongoli ya mosolo eye elakisaka ndambo ya bopesi mosolo ya lisálisi na mokili». Mawa, ebakisi ye, «bosenga ekomata o eleko bopesi mosolo ekokita. Sima ya bokitisi misála ebelé ya lisálisi ya mokili, masangá ya lisálisi bazali na makoki mingi te mpo ya koyanola na bampósá ya bato».

Atáko eleko yangó, lisangá elobi asúngaki koleka bato milio mibalé na 2025, mpenza na nzelá ya bokaboli biléi, kotinda mbongo, manaka ya bilanga, bokómi na mayi malámu, lisálisi na lopitalo mpe bosálisi bozangi biléi.

Mbélá mókó na bosálisani ekowumela

Libosó ya monéne ya bampósá, basáli ya lisálisi babengi bulamatari ya Nigéria mpe baningá ya mokili ya kolendisa bomipesi na bangó mpo ya koyanola na lombango, na bopesi mosolo na bobáteli ya biléi, bokási ya bato mpe boboto. «Biyano ya lisálisi bizali na ntina, kasi bisengeli kozala elongo na bopesi mosolo ekowumela na mosála ya bilanga, bozui mayi, bokólóngóno, bokengi ya bato mpe botomboli mpo ya kosálisa bato ya kozua lisusu bonsómi na bangó», esúkisaki ye.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

13 sánzá ya mwambe 2026, 14:58