Cali ekolendisa bobateli yambo ya bokoti na enpnga ya mokonzi de la Espriella Cali ekolendisa bobateli yambo ya bokoti na enpnga ya mokonzi de la Espriella  (LUISA GONZALEZ)

Na Kolombia, «boboto esombamaka na botiyi mokoloto mókó te»

Nzokándé mokónzi aponamaki na sánzá ya motóbá, Abelardo de la Espriella, akozua mosála na ye na 7 ya sánzá ya mwambi, na mabelé bizali mosika na Kolombia bikotisami na molongó ya sika ya mobúlú, kála te mibú zómi sima ya botiyi mabóko na boyókani ya boboto esálemaki káti ya FARC mpe bulamatari ya Kolombia. Eklezia ya esika waná ekosála mpo ya bozongisi boyókani na ekóló, elimboli Mgr Héctor Fabio Henao, motindami ya Lisangá ya baepiskopo ya Kolombia mpo ya boyókani káti ya Eklezia mpe Letá.

JR Bompolonga - Kinshasa

Na Kolombia, ekóló etálamaki na Papá François úto 6 kinó 11 ya sánzá ya libwa 2017, mpo ya mobémbo na ye ya 20 ya bontómá, mobú mókó sima ya boyókani esálemaki káti ya Mampinga ya mbongwama ya Kolombia (FARC) mpe bulamatari ya Kolombia, mokónzi aponamaki na sánzá ya motóbá, Abelardo de la Espriella, akozua misála na ye na 7 ya sánzá ya mwambi, na eleko yokó ya bobébi ya bokengi na ekóló. Mabelé bizali mosika na Kolombia bikotisami na molongó ya sika ya mobúlú. Nzokándé, sima ya mibú ebelé ya mobúlú biye bisáli bakufi mingi mpe bamilio ya bakimi, boyókani bokó ya boboto na lisapo etiamaka mabóko na 26 ya sánzá ya libwa 2016. Endimamaki te libosó libosó na baí-Kolombia na liponami, mokánda mosusu ebongisamaki ya boyókani etiamaki mabóko na 24 ya sánzá ya zómi na mókó 2016 na Bogota, na kosúkisa mibú 50 ya etumba ya mindóki.

Mibú zómi sima, bato ya makámá ya etumba bazali kaka na boluki ya bosóló mpe ya bosémbo. Mokolo ya mibalé 5 ya sánzá ya mwambi, batomboki ya kála 27 ya FARC bazuaka bitumbu na esambelo ya boboto, mpo ya mabé basálaka libosó ya bomoto mpe ya mobúlú ya kosangisa nzóto na makási. Bozongisi boyókani na ekóló ekoleka libosó mpenza ya bosémbo, elobi na lisoló lyokó epesamaki na bamédia ya Vatican Mgr Héctor Fabio Henao, motindami ya Lisangá ya baepiskopo ya Kolombia mpo ya boyókani káti ya Eklezia mpe Letá. Mpo na ye, bosóló, bosémbo mpe bobongisi bizali na ntina mpo ya boboto ya sékó.

Na 2016, boyókani ya boboto na FARC, epesaka elikya yokó enéne...Mibú zómi sima, tokoloba nini na botáli ndéngé makambo bilekaki?

Ezali botáli bokó ya kososola ndéngé elekaki. Ngambo yokó, boyókani ya 2016 ebikisaki bomoí ebelé, esálisaki ya bobimisi bituluku minéne ya bato ya mindóki ya ekóló mpe epesaki ntina ya misála ya letá esálema te mpo ya bosóló na esambelo. Na ngambo esusu, bolekisi ngonga na bosáleli mibéko nionso ya mbongwana ya mboka mpe botámboli malémbe na bozali ya Letá na bingúmba ya pembeni bitika esika yokó ya polélé ya mawa ezipamaki na lombango na loléngé esusu ya mobúlú. Boboto esombamaka na botiyi mokoloto mókó te. Ezali etamboli yokó ya makási eye ekosenga bokobi bokó ya politiki mpe ya bomoí ya bato.

Na bisika mingi ya ekóló. Mobúlú ezongi. Boni boni okolimbola 'te boboto esálemaki na FARC ekokaki kosilisa etumba ya mindóki te?

Na eleko eye na Kolombia, ezaleli ezali matata likoló ya mombongo ya drogue. Mpe yangó ezali makambo biye bikosálisa bitumba, mpenza narcotrafic, mosála ya mabángá ya ntalo na ndéngé ya moyibi, bozangi ya makambo misusu ya nkita ekowumela mpo ya bato ya mosála ya bilanga. Botelemi ya FARC efungola esika yokó eye Letá asálela yangó malámu te mpe na lombango te na botáli bacivil mpe bomoí ya bato. Bituluku bilongwaki ya biténi ya babomi mpe batomboki basusu bikómi ebelé mpo ya kokamba nkita ya malámu kasi lokolá ya mabé mpe mabelé waná ya ntina. Sik’oyo, bacivil bazali bisika waná, na bizaleli ntángo mosusu ya pási likoló ya bobakisi ya bituluku ya mindóki na ekóló mobimba.

Po na nini bituluku ya batomboki ya FARC mpe ELN bakobunda lisusu leló?

Bitumba bikozua ndimbola na yangó mingi mpenza na etumba ya bokambi ya mabelé, Banzelá ya mombongo ya moyibi mpe bokónzi ya makási na bato ya mboka.

Posó eye, esambelo ya ntina mpo ya boboto epesaki etumbu na bakambi ya kála 27 ya FARC mpo ya mabé libosó ya bomoto mpe mobúlú ya kosangisa nzóto na makási. Mibú zómi sima ya boyókani ya boboto, mokáno ená elingi koloba nini mpo bato ya makámá mpe ya bato bansó ya Kolombia?

Mpo ya mokáno ya esambelo ya ntina ya boboto, ezali etapi yokó ya makási mpo ya lokúmu ya bato ya makámá. Kondima bosóló ya mabé na bomoto mpe mobúlú ya kosangisa nzóto na makási ezali likambo lyokó ya ntina mpo ya libiki ya molimo ya bikóló. Mpo ya baí-Kolombia, yangó ekoloba lisusu 'te boboto ekoki kovanda na bozangi etumbu te, kasi na bokátikáti ya bato ya makámá, bondimi ya pási eyókamaki mpe boboyi ya bozongeli ya makambo ya nsómo biye tomonaka kála.

Mpo ya kosúkisa, koleka mosála esálemaka na Eklezia katoliko, mpo ya kokóma na botiyi mokoloto na Boyókani ya boboto na 2016, mosála nini Eklezia ekokoba kosála leló mpo ya kokóma na boboto na bituka biye bizali na mobúlú?

Eklezia etikali pembeni ya bato ya mosála ya bilanga. Tozali kaka, atá esika mosála mókó ya letá ezali te. Tokosála mosála ya kotambola elongo ya mobáteli, ya lisálisi penepene na bato ya makámá. Mosála mókó ya boluki boyókani mpo ya kosálisa banzelá ya lisálisi mpe kobátela bomoí ya bato. Eklezia ekokoba kotónga bozongisi bondeko na nsé nsé, kolendisa bolimbisi, bosálisani mpe bobáteli ya makoki ya ntina ya lisangá lyokó lyokó.

“"Eklezia ekobenga makási na kimia, na botosi ya mibéko ya demokrati, na bosololi ya kotónga. Tika 'te Mokónzi atambola elongo na Kolombia mpo ya kozua nzelá ya bozongisi bondeko mpe boboto"”

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

11 sánzá ya mwambe 2026, 14:40