Bato batelemi liboso ya ndako ya esambelo enene y'Amerika mpo ya kosenga boboyi ya etumbu ya liwa Bato batelemi liboso ya ndako ya esambelo enene y'Amerika mpo ya kosenga boboyi ya etumbu ya liwa  (2021 Getty Images)

Eklezia epáleli bobomi ya bato misáto bazuaki etúmbu ya liwa n'Amerika

Bato misáto bazuaki etúmbu ya liwa babomaki bangó na bopesi ntonga ya liwa mokolo ya mineí n'Amerika, na Baletá misáto bikeseni. Ezali likambo ya yambo na ekóló úto mibú zómi na motóbá, engebene na Ong epesaka nsango ya etúmbu ya liwa (DPIC) eye ebundaka mpo ya boboyi etúmbu ya liwa. Úta ebándeli ya mobú, bato 22 bazuaki etúmbu ya liwa babomaki bangó.

JR Bompolonga – Kinshasa

Anthony Hines, mibú 66, akufaki na ngonga ya 10 mpe baminiti 43 na botúbi ntonga ya liwa na boloko bokó, na Tennessee, sima ya mibú 40 bileki na nzelá ya liwa. Afundamaka na bobomi mwási mókó na 1985. Baminiti 30 libosó ezali Carlos Cuesta-Rodriguez, mobáli awuta na Cuba ya mibú 70, azuaka etúmbu ya liwa mpo ya bobomi moningá na ye ya mwási na 2003 eye akufaki loléngé ená na boloko bokó ya Oklahoma. Ya súka, Jerry Williams, moí-Amerika ya mohindo ya mibú 42, mobomi mpe mokangi na bosangisi nzóto ya mwána mwási ya moke na 2021 babomaki ye sima ya ngonga zómi na motóbá na boloko bokó y'Alabama. Mokolo ya mineí ya sánzá ya mwambi, bato misáto bazuaki etúmbu ya liwa babomaki bangó na mokolo kaka mókó na Baletá misáto bikeseni.

Atá mikánda ya boluki bolimbisi, atá botelemi ya molongó ya bato baboyi etúmbu ya liwa, babobomi bipekisamaki te: Baletá 23 na 50 y'Amerika bakosálela kaka etúmbu ya liwa mpe ekokende kaka ya komáta úto bozongi na bokónzi ya Donald Trump na Ndáko Pembe. Mobú moleki, babobomi ya bato 47 bisálemaki na ekóló, elobi DPIC, waná ezali ya koleka makási úto 2009.

Eklezia ekokoba kotombola mongongo ya koboya etúmbu ya liwa

Episkopo ya Oklahoma City, Mgr Paul S. Coakley, abimisaki mawa na ye na lokásá na ye ya Facebook etáli bopesi liwa na mókó ya bato ya Letá na ye. «Etúmbu ya liwa ememaka bosémbo te», ekomi oyo azali lokolá mokónzi ya lisangá ya baepiskopo katoliko y'Amerika. «Baboloko na bisó ya sika bizali na bokengi. Bokangi moto mpo ya libela ekosálisa mbongwana ya mitéma».

«Tosámbela mpe tosála bansó elongo mpo ya bosémbo bokó ya bomoto koleka, bosémbo bokó eye ekobátela elikya ya bosikoli mpe botosi ya lokúmu na káti ya bomoí bokó bokó, atá mpo ya baye basálaki mabé mókó ya koleka», elobaki Mgr Coakley. «Esengeli lokolá kosámbela mpo ya basáli ya mabé waná, na bosimbi na molimo 'te bomoí ya moto ezali likabo lyokó ya Nzámbe mpe 'te mobéko mpo ya bomoí ekoki konyatama te, atá mpo ya baye bazuaki bitúmbu ya mabé koleka».

Na 2018, Papá François abongolaki Katekisi ya Eklezia katoliko, na bokomi 'te etúmbu ya liwa ezali na loléngé nionso «ya bondimi te» mpe lisólongó (contraire) na lokúmu ya moto.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

15 sánzá ya mwambe 2026, 12:09