Mpo na Unesco, «kobátela bonkoko, ezali kobátela bomoto ya bato»
JR Bompolonga - Kinshasa
Bamosquée, bamausolée, bandáko ya mikánda: ezali kaka bambéba biye bikómaka na eleko ya etumba te, kasi bato to bisika biye biponami na nko mpo na kobetama, bilukami mpo ya kolongola bomoto ya masangá mobimba. Kosála mabé na libulá ya bonkoko, ezali kosála mabé na molimo ya bato waná. Yangó waná libulá ya bonkoko ezali mbala na mbala mingimingi na moto oyo azui pási na bitumba. Mpe ezali mokakatano mókó eye Unesco akolakisa mokolo na mokolo, káti ya bobáteli ya mobéko mpe botóngi na etando. «Totiaki esika ya ebongiseli ya mobéko ya makási koleka na mokili na eye etáli bonkoko mpe libulá, esálemi na mibéko motóbá ya bonkoko, mókó mókó ebongisami na lomeko lyokó ya ntina ya bobáteli libulá, eloko eye emonanaka to emonanaka te. Elongo, bisáleli yangó bikolaka ndéngé ya kotála makambo nionso ya bobáteli libulá ya bonkoko mpe ya mokili», elimboli molobeli ya Unesco, na bobakisi 'te «esálelo ya ntina na ntángo ya etumba ya mondoki ezali Boyókani ya La Haye ya 1954 mpe babuku na yangó mibalé bilandi, ya yambo ya mobéko ya mokili ebongisami kaka na bobáteli biloko ya bonkoko na ndéngé waná. Ebongisi mibéko ya bobáteli, mikúmbá miye Bikóló bisengeli kokokisa mpe botosi ya libulá o eleko ya bitumba. Babuku mibalé bilandi bikolendisa lisusu makási Boyókani mpe bikosálisa bosáleli na yangó. Na ndéngé waná, Unesco ekosunga Bikóló ya kosálela bisáleli biná mpe ekokela na nzelá ya bosáleli elongo, ya bosololi mpe ya mibéko ya mokili bitiama mpo ya kosálisa bosáleli na yangó ya sóló».
Mibéko na ekela na etando
Kasi Unesco ekosála te kaka na bosimbi bisáleli ya mibéko, kasi lokolá na nzelá ya bosáleli elongo ya mokili, ya lisálisi tekiniki, ya tolí ya politiki, ya boteí bato ya nzebi mpe masangá ya bikóló, na lokolá bosololi na Bikóló binama. «Tokosála elongo na baningá ya lisálisi mpe ya bonkoko mpo ya komatisa botosi ya libulá ya bonkoko libosó, na ntángo ya mpe sima ya bitumba», ekobaki molobeli. «Mibú miye mileki, libulá ya bonkoko, mpe na ndéngé mosusu lokolá libulá ya mokili, etandami koleka na bileko ya etumba ya mondoki. Sóki, na makambo misusu boye, bambéba bizali mbuma mókó ya mabé ewuti na bisika misusu, libulá ezuami na nko eloko ya kobeta, eye ekobébisa bomoto, molimo mpe ntina eye ekolakisa mpo ya masangá, bikóló mpe mokili mobimba. Bobébisi ená ekosimba kaka biloko ya bonkoko te, kasi lokolá bomoko ya bato na káti ya lisangá, ya molimo mpe bonkoko ya mangómbá. Lokolá mokumbi ya ntina ya bolekisi ya molimo, ya nzebi mpe ya boyókani káti na lingómbá na nzelá ya mabótá, bobungi na yangó ekoki kokóma libakú lyokó na bosololi mpe na bozongisi boyókani». Botáli ya Unesco ekotia bôngó masangá o ntéi ya bobáteli mpe ya bokambi ya libulá. «Na bileko ya sima ya bitumba, ekela na bisó ekoleka botóngi ya pámba ya bikeko ya lokúmu; ekoluka kokangisa bato na lisapo na bangó, na bolendisi bomoí ya bonkoko, ya boteí mpe ya lingómbá».
Tombouctou mpe Mossoul, bilembo ya botombwami lisusu
Káti ya bandakisa ya sóló, batángaka eye ya Tombouctou mpe eye ya Irak. «Na likambo ya yambo, na Mali, tosungaki botóngi lisusu ya bamausolée 14 babukaki yangó na 2012, na bosáli elongo na basáli ya ntoki ya ekóló baye basálelaki bamayéle ya bonkoko mpo ya kobátela bosémbo ya esika yangó, na boyékolisi bilengé ya ntoki ntúkú mineí zambi ya bopesi na basusu mayéle ená», elobi molobeli. «Na ndéngé waná, na Irak, likanisi Revive the Spirit of Mosul, ebima na 2018, ekolakisa monéne mpe loléngé ya bosangani ya misála. Tosangisi koleka milio ya dollar 115 mpe baningá ya mosála ya mokili, linaka liná esálisi ya botóngi lisusu bisika ya libulá ya ntina, mpenza mosquée Al-Nuri mpe minaret na ye egumbama, na lokolá bobongisi bandáko ya lisapo 124, bobongisi biténi 400 ya kelasi mpe bokeli misála 7 700 na ekóló. Na nionso, bandakisa biná bikolakisa botáli bokó ya lisangá ekelama na bosáleli ya mokili mobimba mpe bomipesi ya bansó, na botiyi masangá ya ekóló o ntéi ya etamboli ya botomboli ».
Kotónga lisusu molimo mpo ya kotónga boboto
Unesco ekomona botóngi lisusu lokolá etamboli yokó ya lingómbá monéne koleka mosála mókó ya pámba ya tekiniki. «Etamboli ya bobongisi ekobánda na bobáteli ya lombango mpe mikánda ya bososoli, mpe ekokoba na misála ya bansó na boluki kopesa lisusu bomoí kaka biloko bimonanaka te, kasi lokolá bomoí ya lingómbá mpe ya molimo eye esangani. Sóki emikomisi na bamayéle koleka ya boboto, ya boteí mpe ya botomboli, bonkoko ekoki kosálisa mangómbá na ndéngé ya makási, na bofúngoli banzelá ya bosololi, ya bozongisi boyókani mpe bomoko ya bato»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.