Luka

Bato bakotambola na nzela na boboyi bulamatari na Antananarivo, mboka-mokonzi ya Madagascar Bato bakotambola na nzela na boboyi bulamatari na Antananarivo, mboka-mokonzi ya Madagascar   (ANSA)

Molongó ya bolongoli bato na Madagascar, Eklezia ekosenga bolukiluki ya polélé

Bobúngi ya bato ekokoba úta súka ya sánzá ya motóbá ekotisi bato ya Madagascar na boyébi nini ya kokanisa te mpe na bokolisi nkanda na bangó na ekóló eye ekobunda na mikakatano ya politiki mpe ya nkita. Na moke makambo 200 ya bolongoli bato bikomami úta sánzá ya yambo mpe bato motóbá baweí. Baepiskopo katoliko bakosenga «bosóló mpe mwinda esálema». «Bato bakobánga kobima na ndáko na bangó», etatoli sángó Séraphin, mokomi ya bokambi ya Lisangá ya baepiskopo.

JR Bompolonga - Kinshasa

«Likambo ezali mpenza ya pási koleka. Bobúngi mpe bolongoli biye bikokitana bikamwisi makási. Bonéne ya makambo yangó nionso elobami naínu te, mpe yangó ekoluka boyébi nini ya kokanisa na bato bansó na mboka-mokónzi mpe nzinganzinga na yangó». Ezaleli ya sik’oyo ekoleka na Madagascar elimbolami na sángó Séraphin Rafanomezantsoa, mokomi ya bokambi ya Lisangá ya baepiskopo ya ekóló. Úta ebándeli ya mobú, penepene ya makambo 200 ya bobúngi bikomamaki ndéngé bakónzi balobi; bato 175 bamonaki bangó, 6 baweí mpe 19 misusu bakolukama.

Mokolo ya mawa na ekóló mobimba

Na likambo liná eye ezali na eténi ya yambo ya baréseaux sociaux úta bapóso ebelé, bato 11 baye bakanisami 'te basálaki likambo yangó batiami na bolɔkɔ mpo na kozela bosambisami. Na bopesi lokúmu na baye babúngisi bomoí, mokolo mókó ya mawa epesami na mobéko mokolo ya mitáno 24 ya sánzá ya sambo na bakambi ya Madagascar. Libosó ya bobakisami ya bobúngi ya nsómo, bulamatari azuaki mokáno ya kokela «task force» yokó ya kobungi mpe bolongoli ya bato.

Bozeli ya bambuma mpe likámá lyokó ya bozangi botiyi motéma

«Ezaleli ekómi mindondo koleka. Bakónzi bakolobela likoki ya kosálela likambo yangó, mayéle mókó ya koluka kobébisa elili ya kimia ya ekóló na mokili», nzokándé «bato bakosenga bambuma ya sóló koleka nsakola ya likámá», elakisi sángó Séraphin, na bolobi lisusu «bozangi bokó ya botiyi motéma káti ya bulamatari mpe bána mboka».

«Atáko bokangi bato ntángo mosusu mpe bolendisi ya bolekileki ya basoda, likanisi ya bato ekotia ntembe kaka na bato bapesi ya sóló mitindo ya bolongoli basusu bazali mpenza kolukama». Bato bakozela bambuma mpo ya bokengi na bangó, ebeti nsete sángó ya Madagascar. «Nani akobombana sima ya makambo nionso biye? mpe po na nini?». Mingi lokolá sángó Séraphin, baí-Madagascar ebelé bakomituná «mituná miye bizangi na mawa biyano», na bomátisi lisusu mwá bobángi.

Eklezia katoliko ekosenga «bolukiluki ya polélé»

Na liloba lyokó ebimaki na káti ya sánzá ya sambo, Lisangá ya baepiskopo ya Madagascar ekosenga «bolukiluki ya polélé». Na bondimi «makasi bozali kosála libosó ya pási ya bato», baepiskopo balingi 'te «bikela bikoka kolonga maloba, sóki te bokoki kotika mokáno na binó. Bosóló etáli ntina mpenza ya likambo eye ya nsómo esálema, zambi ekweya na bobosani te, lokolá esálemaka mingimingi», bikomaki baepiskopo.

Na mokánda, Lisangá ya baepiskopo epesi maloba ya botondi, mpe «ebimisi bosálisani na ye na baye babungisaki bandeko mpe bána na likambo liye ya nsómo naínu esálema te. Bato ebelé bayébi lisusu te nini basála, mpenza baye bazangi makoki koleka bazali na moto ya kolobela bangó te». Bolongoli eye ezalaki koluka na ebándeli bána, elobi Mbolatiana Raveloarimisa, enama ya lingómbá ya bato.

Bobomi ya mwána mwási ya moke

Kasi, úto bapóso misáto, «mikolo ya nzóto makási balongolami lokolá, mpe bibembe bikomonana áwa mpe kúna, na yangó bansango ya sémba mpe ya sóló bikolobama te na bakónzi». Mwási oyo abundelaka ntómo ya bási alobi lisusu likambo ya mwána mwási ya moke Larissa ya mibú 11 «oyo eningisaki mpenza ekóló mobimba». «Abungaki na sánzá ya mineí eleki, ebembe ya mwána ekomonana na bazongo ya letá». Bobomi ya mwána mwási ya moke etungisaki etuka y'Ambositra mpe epesaki nkanda makási na bato.

Mbélá ya bobáteli bomoí

«Eklezia ekoki kokanga monoko te libosó ya bonyati lokúmu ya bomoí ya moto», elobi sángó Séraphin: «Esengeli kobátela bomoí na ndéngé nionso, esengeli atá moke te kolekisa mbeka mpo ya matómba atá likambo nini». Na liloba na bangó, baepiskopo ya Madagascar babengi bato ya kopesa nzelá na mobúlú te. Libosó ya likámá liye, bato bazali na nkanda makasi bakoki komisálela bosémbo te mpe mobulúngano ya makanisi ekota.

Mbolatiana Raveloarimisa, mamá ya mwána mókó alobaka malámu te (autiste) oyo azali ntángo mosusu na makámá na nzelá alobi: «bayébisaki bisó likambo lyokó eye mamá mókó mpe mwána na ye alobaka malámu te bazalaki na nzelá. Mwána na ye ya mobáli ayókaki pási. Mpe bôngó, ntángo bána ya loléngé ená bayóki pási, boyébi, bagangaka, baninganaka mpenza, mpe bato bazali pembeni balingaki kokanga mamá, pámba te bakanisaki 'te ezalaki mwási mókó oyo akomipesa na ekela yokó ya bolongoli moto mosusu». Na esengo, ekobaki ye, «ezalaki na motámbwisi tukutuku ayébaki bangó mpe asálisaki bangó ya kobika». Mpo na ye, «ekoki kosálema, mpenza 'te bato bayébi likambo te baboma bangó na ndéngé ya ezaleli eye, yangó ekoki kobébisa bomoí ya bato bayébi makambo te».

Eklezia ya Madagascar ekolikya bozongi ya kimia, elobi sángó Séraphin. «Bato bakobánga kobima na bandáko na bangó, mpe baye bakobima bakozonga na lombango na mokolo. Ezaleli epesaki lokolá libúngi lyokó ya ntina ya nkita», elobi mokomi ya bokambi ya Lisangá ya baepiskopo ya Madagascar.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

27 sánzá ya nsambo 2026, 13:38