Intelligence artificielle ezali botombwami bokó kaka sóki ekómi na mosála ya lokúmu ya moto
Vatican News
«Emeko ya sóló ya bomáti ekozala na ndéngé ya bokólisi batechnologie ya sika te, kasi na likambo 'te bitiami to te na mosála ya moto mpe bolámu ya bansó». Waná ezali motéma ya nsakola ya Etindá ya Motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ebimaki mokolo ya yambo 13 ya sánzá ya sambo, na ndáko monéne ya ONU na New York, o eleko ya likita lyokó ya Likita ya makambo ya nkita mpe ya bomoí ya bato ebongisami na likambo-likonzi «Kosála malámu koleka: kotambwisa makási ekela yokó ya lombango mpe ya bobongoli mpo ya kokóma na Mikáno ya bokóli ya sékó kinó mobú 2030».
Makoki mpe makámá ya IA
Etuluku ya Vatican, na molongó ya encyclique ya Papá Léon XIV Magnifica humanitas, elobaki lisusu 'te Intelligence artificielle (IA) «ezali na makoki ya kotambwisa mbango babomáti epái ya Mikáno ya bokóli ya sékó, na káti waná baye bilekami na botáli lisusu mobú eye». Kaka na eleko eye, nzokándé, sóki technologie eye ya sika ekómi «kobébisa lokúmu ya moto», ekozala te, lokolá na «makási, litómba to mayéle ya sika», motindo mókó ya sóló ya «kosála malámu koleka», kasi ekobébisa emoniseli kútu ya bokóli ya sékó elimbolama na Linaka 2030, elingi koloba moto asengeli kozala kaka «o káti ya makási nionso ya bomáti».
Mokáno ya bomáti, batáli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo basembolaki, ezali «bosikoli mobimba bato na nzala, na babokono, bozangi botángi mpe bopimi». Mokáno mókó eye ekoki kokóma, na ndéngé ya nkita, kaka na «bozali bokó ya sémba na banzelá ya mokili», na ndéngé ya bomoí ya bato, na «botóngi mangómbá bisálemi na bosáleli» mpe na ndéngé ya politiki, na bolendisi «misála ya demokratie biye bikolaka bonsómi mpe boboto».
Bokóli bokó ya nkita na bolembu naínu
Atáko «bokóli ya nkita» ezali ya «sóló» mpe ememi mingi, na bosálisi ya bato bébóo ya kobima na bobolá ya súka, etikali «na elembo ya mikakatano minéne», neti «bokólisi babokeseni - mingi káti ya bikóló koleka o ntéi ya ekóló yokó yokó - mpe bobimi ya baloléngé ya sika ya bobolá». Na súka ya nsakola na ye, etuluku ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na New York elendisaki ya «kobunda na mikakatano yangó» mpe ya kondima «lokúmu ya kobébisa te ya moto», mpenza mpo ya kotosa : «mikáno bizuamaki mpo ya bomáti ya sékó».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye