Eklezia elingi kofúngola lisusu etéyelo na ye na Gaza
JR Bompolonga – Kinshasa
Gaza na maloba ebátelami na bozimi-móto ezuaka bosáleli na yangó na 10 ya sánzá ya zómi 2025. Na maloba kaka, mpo na basánzá 9 bileki, bamobúlú ya Israël bikobaki na mabelé ya Palestine, na bobomi bato koleka 1000, káti na bangó bána 265. Na eleko ená, baí-Palestine 3400 bazokaki lokolá na etuka. Motángo ená ya ministeli ya Gaza ya Bokólóngóno ya nzóto emonanaki malongá na ONU eye ezongisaki yangó na mokánda ebimaki na ebándeli ya sánzá ya sambo. Tozongeli ezaleli ya pási eye bato ya Gaza bazali na Mgr William Shomali, sángó molandi monéne mpe sángó molandi ya motomolo latin mpo ya Yelúsalema mpe Palestine.
Mgr Shomali, boni boni kolimbola bomoí ya mokolo na mokolo ya bato ya Gaza?
Bato ya Gaza bavandi sik’oyo na 47% ya etuka ya Palestine, mpo baí-Israël babotoli 53% ya mabelé. Bokoli ya bato ezali na ntina, na ndéngé 80% ya biloko bibébaki mpe yangó etáli bandáko, kasi lokolá mayi mpe lotiliki. Bitéyelo mingi, bitéyelo ya likoló bizali lisusu te. Bato ebelé, bankóto, bakovanda na baema.
Ndéngé nini lisálisi ekokóma leló? Na motángo ekoki?
Ntángo okoloba lisálisi, esengeli koloba bileí, mino mpe nionso eye ezali na ntina mpo ya kobika. Ngaí mókó, nakosála bokeseni káti ya bileí mpe eye etikali. Ezali ndakisa mino biye bikokota, kasi mino nionso bizali na ntina te, mpe na motángo moke. Úta mwá basánzá, bileí bikokota na Gaza bikowuta na Israël na bato ya mombongo. Bitekisami lisusu na Gaza. Motomolo Pierbattista Pizzaballa, oyo akendeki kúna na sánzá ya motóbá, amonaki zando na biloko ebelé na ndéngé ya botáli na ye elekaki libosó ya Mbotama. Nazalaki na ye na ntángo waná, namonaki na miso na ngaí 'te biloko bizalaki mingi te na bamagazini. Ntángo nakoloba bamagazini, elingi koloba ema yokó to mibalé mókó pembeni ya mosusu, esili. Ezali supermarché te. Ezali bato ya mombongo ndé bakokamba baema waná mpe bakotekisa bileí.
Toyébi 'te bato mingi ya Gaza bazali na mosála te, boni boni bakokoka kosomba eye ya kolia?
Ezali na basáli mingi bazalaka kosála mpe bazalaka kozua lifúta, mingimingi baye bazalaki na mosála ya bulamatari ya Palestine. Baye bazalaki batángisi na bitéyelo to basáli na misála kilikili, bakokoba kozua lifúta na bangó. Batángisi na bisó bakokoba kozua lifúta na bangó. Nzokándé esengeli kosálisa basusu na mosolo sik’oyo. Libosó, tozalaki kosálisa na bopesi bileí; sik’oyo tokoki kosálisa na bopesi mbongo mpo 'te bakoka kosomba bileí. Yangó ndé tosálaka na baí-paloise na bisó, baye bazali na paloise latin ya Gaza.
Esengelaki leló kozala na eténi ya mibalé ya mwángo y'Amerika eye ebongisi bobotoli mindóki ya Hamas, bobándi botóngi lisusu mpe bofúngoli ya mosolo mpo ya botóngi yangó. Tokómi wápi na eténi ená ya 2?
Botóngi lisusu esangisami na bobotoli mindóki. Kasi bobotoli mindóki, waná eténi ya yambo, ebakisamaki te. Hamas azali naínu na etuka. Ezali ye ndé akobátela na ngambo evandami na baí-Gaza. Waná botóngi lisusu ekoki kobánda te.
Nalingi kobakisa 'te, na eleko eye, bána baye bakosála eloko te bakoya na etéyelo te. Bakolokota banzete, bansete, eye nionso ekoki kosálisa lisusu to kotekisama. Kasi na sánzá ya libwa ekoya, tokokanisa kofúngola lisusu etéyelo na bisó na paloise ya Libótá Lisántu. Tokolikya kokoka kotángisa bána 1000. Na loléngé liná, bakozanga eloko ya kosála te. Ezali na ntina 'te babánda koyékola. Bakoki kobánda mpe malémbe malémbe bakobosana makambo ya etumba.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.