Eklezia ebengi na bosálisani sima ya boningani ya mabelé na Péru
JR Bompolonga – Kinshasa
Mwá ngonga moke kaka sima ya boningani ya mabelé ya bokási 5,1 eye ebetaki mokolo ya póso 18 ya sánzá ya sambo engúmba ya Junin, Lisangá ya baepiskopo ya Péru etindáki liloba lyokó ya lisúngi mpo ya mabótá bizui pási na likambo yangó. Na liloba yangó, baepiskopo balakisi mawa na bangó epái ya mabótá ya bakufi mpe balobi lisálisi na bangó na bato bazui makámá.
Na bingúmba mitáno bibetami na káti ya ekóló, bakónzi batángi baweí motóbá mpe na moke bato bazoki 32, mokolo eye ya yambo, basoda, bapulusi mpe bapompier bazalaki kotála naínu na mabanga mpo ya koluka bato babiki na liwa baye bakokaki kozala waná. Na nionso, binama 122 ya mampinga bapanzani na esika yangó, na kilometele 310 na monyele ya Lima, mboka-mokónzi ya ekóló.
Masálisi ya yambo
Na liloba na bangó baepiskopo bakumisi mosála ya bikipi ya lisálisi, bakónzi mpe bato ya mosála ya bolingo baye bakosála makási ya kosálisa bato.
Eleko ya likámá ezuamaki mokáno kúna mpo ya mikolo 60, zambi ya kotia bisika ya kovanda mpo ya koyamba bato babetami 300, ya kotambwisa na lombango botiyi balopitalo, botindi ya bikipi ya lisálisi, bolongoli mabanga to botóngi bandáko bisusu.
Engebene na Mosála ya ekóló ya bobáteli bacivil, bandáko 52 bikweyaki. Bitéyelo, bandáko-Nzámbe, bisika ya bokólóngóno ya nzóto mpe misála ya letá bibukanaki lokolá.
Ndáko-Nzámbe yokó ya ekeke 16 ebukani ndambo
Káti ya bandáko bibébi ezali ndáko-Nzámbe Santiago Apóstol. Etóngama na 1534 na engúmba ya Chongos Bajo, esika boningani ya mabelé ebándaki, ebébaki makási, pámba te nsambá (toit) mpe eténi yokó ya likoló ya ndáko bikweyaki. Sángó Henry Díaz abeleli lokolá. Linóngi (clocher) elingi kokweya lokolá. Abengi na botóngi lisusu eye akobenga «eloko ya kitoko ya botóngi».
Liloba lyokó eye esangani na eye ya Lisangá ya baepiskopo eye ekobenga kobátela bomoko mpe bosálisani na masangá bizui makámá, na bolobi ntina ya kopesa lisálisi mpe lisúngi o eleko ya nzelá mobimba ya botóngi sima ya likámá.
Boningani ya mabelé ya súka eye ebébisaka makási esálemaka na etuka ya Pisco, na sudi ya ekóló, na 15 ya sánzá ya mwambi 2007, ntángo boningani bokó ya bokási 7,9 ebomaka bato 595 mpe ebimisaka tsunami yokó ya moke, ekundoli Agence France presse.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye