Mikano ya bobateli bikoluka bokangi bopanzi ya Ebola na Congo-Kinshasa Mikano ya bobateli bikoluka bokangi bopanzi ya Ebola na Congo-Kinshasa  (ANSA)

Congo-Kinshasa: libosó ya Ebola, Mosála ya Jésuite mpo ya Babombami ebongisi ekela na ye na loléngé lyokó ya likámá ya bobáteli

Esakolamaki eleki basánzá mibalé na Congo-Kinshasa, epidémi ekopanzana «na mbango koleka biye nionso bilekaki», ekebisi OMS. Na Goma, etuka ezali na mabóko ya M23, esika wápi Mosála ya Jésuite mpo ya Babombami ekosála epái ya bato bazali na mikakatano, bamwangó bibongisami lisusu mpo ya kokotisa bobáteli libosó ya virus, na yangó ekotika misála ya boteí, ya makanisi ya bato mpe ya masangá.

 

JR Bompolonga - Kinshasa

 

Koleka bato 2 000 bayebani bazali na Ebola mpe bakufi 754 bakomami na bingúmba mitáno ya Congo-Kinshasa, engebene na mitúya ya súka ya bakambi ya bokólóngóno ya nzóto na ekóló. Bobángi ezali mpo epidémi ekopanzana na «ndéngé mókó emonana te mpe na bisika ya sika», elobi Médecin sans frontière. Sóki Ituri etikali esika epidémi ebándaki, Nordi- Kivu ezuami lokolá, atáko etuka ya Goma ezali kaka na moto mókó úta nsakola ya letá ya epidémi esálemaka na káti ya sánzá ya mitáno. «Moto mókó waná ya Goma abikaki mpe epesaki esika na bato basusu ya bokono te», elimboli mokambi ya Mosála ya Jésuite na Congo-Kinshasa, Victor Setibo.

 

Ezaleli yokó eye, elobi ye, esálisaki ya kolembisa etamboli ya makanisi ya mikolo ya yambo, ntángo bomoni ya souche Bundibugyo esálemaki, eye ezali na mangwele te mpe lisálisi mosusu te, epesaki bobángi makási. Nzokándé, bakambi bakobanga bopanzani ya virus eye ekozala etúmbu ya ibalé, likoló ya likámá mpo ya bato mpe bozangi bobáteli ya mikolo miye esangani na bokweí ya etuka na mabóko ya batomboki ya M23. «Tokobunda na likámá ya bato esangani na eye ya bozangi bokengi. Na likámá liná ebakisami sik’oyo likámá lyokó ya bokólóngóno ya nzóto», elobi mokambi na ekóló ya Mosála ya Jésuite na Congo-Kinshasa. Matata, esemboli ye, ezali na ntina koleka na bisika biyambi bato bakimi, epái wápi esika ya bato ebelé ekokómisa pási bosáleli ya mibéko ya bobáteli libosó ya Ebola.

 

Na bosáli mpenza makambo ya boteí, ya lisúngi ya etamboli ya makanisi, ya bobáteli mpe ya bozongisi boyókani na lisangá, Mosála ya Jésuite na Congo-Kinshasa ekosála mbala mókó na lisálisi ya bato ya bokono te. Ekela na yangó ekotála mingi bobáteli. Lisangá ebongisaki bamwangó na ye nionso mpo ya kokotisa na misála na ye bolamwisi bato na likambo ya Ebola. Maloba bindimami na bakambi ya bokólóngóno bwa nzóto bizali kopesama na eleko ya boyékolisi, ya bokútáni ya masangá mpe misála ya boteí. Biloko ya bopeto, mpenza mpo ya bosukoli mabóko, bikabolamaki lokolá mpo ya kobátela baye bazui lokolá bikipi ya mosála. «Bamwangó na bisó bibongisama yambo ya bobimi ya Ebola. Esengelaki kobongisa yangó mpo ya kokoba misála na bisó na boyingisi mikáno ya bobáteli», elimboli Setibo.

 

Kobongisa bozongi ya bána na kelasi

 

Na pembeni ya bofúngoli bitéyelo, Mosála ya Jésuite na Congo-Kinshasa ebakisi makási mpo ya kobátela bayékoli mpe batangisi na bitéyelo bikendeke na bangó elongo.  Lisangá ekosála ya kolendisa makoki ya bobáteli na bitéyelo, esika makámá ya bolekisi bizali makási likoló ya bosangani mokolo na mokolo. Batangisi babakisami lokolá na bikela ya bolamwisi bato zambi bakoka kolekisa maloba ya bobáteli epái ya bána. Manaka bikoluka mpenza mpenza bána úta mibú 6 kinó 18, kasi lokolá batangisi, bási mpe masangá ya esika ená, lokolá bato bakima likoló ya matata, baye batikali kaka na bolembu.

 

Mpósá ya mosála ya bobakisi

 

Bobongisi lisusu ya misála ekolakisa motúya mókó likoló. Bosombi ya biloko ya bobáteli, misála ya bolamwisi bato mpe babobongisi ya misála bizalaki te na bamwangó ya mosolo na ebándeli. «Mpo ya bamwangó misusu, tosálaki mwá mabongisi, kasi mpo ya misusu tokoluka naínu mosolo zambi ya kokoba misála na bisó na botáli likambo ya Ebola», elobi mokambi na ekóló ya Mosála ya Jésuite na Congo-Kinshasa

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

 

 

18 sánzá ya nsambo 2026, 11:32