2026.06.06 Ousman, moi-Gambie, migrant na Canarie Enéné 2026.06.06 Ousman, moi-Gambie, migrant na Canarie Enéné 

Úta Gambie kinó Bisangá ya Canarie, mobémbo ya Ousman

Na mokolo ya yambo ya etapi na ye ya yambo na Canarie, Léon XIV ayaki komema lisálisi mpe esengo na libóngo y'Arguineguín, ezali na likoló ya sud ya Canarie Enéne, ebengama bánda kála «libóngo ya nsoni». Na 11 ya sánzá ya motóbá, nsoni etikaki esika na elikya. Ba migrant bayaki kokutana na Papá batatolaki yangó. Káti na bangó, Ousman, tatá ya libótá ya mibú 38, awutaki Gambie eleki sánzá motóbá.

 JR Bompolonga – Kinshasa

Ezali na Tenerife, esangá enéne koleka bisangá mwambi biye bisáli ekóló, ndé Ousman atiaka lokolo ya yambo na mabelé ya Canarie. Mabelé mókó makási ezelamaki lokolá libiki lyokó sima ya mikolo mwambi bilekaki na ebale na maswa ya mabaye, na bozangi elaka ya kokóma malámu. «Bato ebelé bakolongwaka kúna kasi bakóma áwa te», endimi tatá ya libótá ya mibú 38. Kúna, ezali Gambie, «Mopanzi esekaka y'Afrika», esemboli Ousman, kombo ya lipombo ezuama likoló ya loléngé na yangó mpe ezaleli esengo ya baí-mboka.

Nzokándé, pási, Ousman ayébaki yangó. Na botiki yambo etuka na ye ya engúmba Kombo North, atika sima na ye mwási na ye Saly, mpe bána na ye mibalé, Cary mibú 8 mpe Youssouf mibú mibalé na ndambo. Kasi ba euro 4 ya lifúta na mokolo lokolá mosáli na hotele yokó pembeni ya ebale bikosálisa ye te ya kobika loléngé elongobami, mpe etamboli na ye na etéyelo ya ebándeli epesi mokakatano mpo ya bozui mapolome. Bomoí bokó eye alingi te mpo ya bána na ye. Na boyébi makámá ya bokatisi, Ousman aponi komema kaka mwána na ye ya yambo, ya mibú 13.

Kobunda na mbu Atlantique

Ebándeli ya sánzá ya mibalé, tatá mpe mwána bamáti na maswá mókó ya mabaya, pembeni ya bato basusu 156. Na káti bizalaki mibáli, bási, bána, elobi na mwá maloba Ousman, na koboya koloba mingi bapási amoni na ebale. Asemboli kaka 'te mókó ya bato ya mobémbo akobungisa bomoí na ye mwá ngonga moke libosó ya kokóma esika bazalaki kokende, «ya sóló likoló ya malili». «Na súka ya mokolo ya motóbá, tobangaki koleka mpe tobongamaki ya kotelema na esangá nionso ekomonana na nzelá na bisó».

Ezali kaka na butú ya mokolo ya sambo mpe ya mwambi, na ngonga ya minéi ya tongo, ndé Ousman amoni na mosika bamwinda ya Tenerife, mpe bapépo bikopumbwa mpo ya kokende bisangá ya pembeni. «Nawuti na ekóló yokó esika wápi mokili ezali ya kolala, bôngó komona bangomba mpo ya mbala ya libosó, ezalaki ya kokamwa mpo ya ngaí», elobi ye na bokanisi liyóki ya bonsómi eye ezalaki na ye.

Boyambi na Las Palmas

Kasi mobémbo esukaki waná te. Atindikami mbala ya yambo na Lanzarote, epái wápi akotikala sánzá mibalé, tatá ya libótá atindami na sima na mwána na ye na esika yókó ya boyambi na Las Palmas, ezali na mabóko ya Lisangá Cruz Blanca ya Espagne, ekelama na bandeko franciscain na 2004. Na ndáko yokó, esika ená ekopésa lisálisi na lopitalo mpe bosálisani na eye etáli makanisi, lokolá lisálisi ya mobéko, matéya ya espagnol, esika ya bobáteli mpo ya bána mike. Bána mpe bilengé bakokende na bitéyelo ya Letá ya Las Palmas, eténi ya yambo ya boyingéli na bangó káti ya baí-Espagne. Eye ya mwána na ye ekoleka malámu, esepeli Ousman. Sóki mwána na ye ayébaki eloko te ya espagnol eleki basánzá motóbá, sik’oyo ezali ye akobongisa bambéba na ye, elobi ye na koseka mpe na esengo.

Mpo ya balingi yangó, bosálisani bokó ya molimo ezali lokolá. «Bato waná bazokóma balembi na nzóto mpe na molimo», elobi ndeko Jahir Falon, mokambi monéne ya bisika nionso ya Lisangá Cruz Blanca. «Molimo na bangó ekotámbola elongo na pási ebelé. Etindá na bisó ezali ya koyóka bangó mpe ya kopesa bangó bokébi nionso ya bisó». Bokébi bokó eye ekoleka na kolaka bosáleli bokó ya boyambi, atá ndéngé nini. Baye bavandi na etuka bakoki kokende na bandáko-Nzámbe ya pembeni, to kosepela ramadan esika bazali.

Mobémbo ya Papá, liziba ya esengo

Ousman ye mókó azali musulman. Ezali na eloko te ekoki kobébisa esengo eyókani sima ya bomoni Papá na 11 ya sánzá ya motóbá na libóngo y'Arguineguín, elongo na bamigrant basusu ebelé bayambama na lisangá. «Tokokabola eyamba kaka yokó, eye ya bomoto», elobi lisusu moí-Gambie. «Atá ozali mondele to moyindo, makila kaka waná ekotámbola na misisa na bisó. Mpe ezali kaka makila ya motane eye ekobima ntángo tozoki, bôngó, tokoki bansó kobika lisangá. Ekomami na Biblia kasi na Coran lokolá».

Na lisikulu na ye na bamigrant mpe batindami ya masangá ya lisálisi, Léon XIV abetaki nsete na mpósá ya bobongisi «etamboli elongobami boyambi mpe ya boyingéli». Na lisálisi ya mosála ya lisangá ya bafranciscain, eye ya Ousman mpe ya mwána na ye ekomonana neti ekokende malámu. Leló kinó mwá mikolo, tatá na mwána na ye bakokende na etuka ya Burgos, na nordi ya ekóló, mpo ya kosála etapi ya bobongisi. Mosáli ya kála na hotele amilobeli abongami ya kosála epái nionso. «Nalingi 'te Papá ayeba 'te tozali áwa te mpo ya kotungisa lisangá, kasi mpo ya kotómbola elongo, mpe komema ekóló mosika, elongo».

Nzokándé, na likanisi ya kobima mikolo mikoya na lisangá ye azali, esika eye eyambaka ye basánzá minéi bileki, mwá mayi ya miso bikokita na kokebisa Ousman te. Sóki ayébi 'te ngonga ekoki ya kofúngola molongó mókó ya sika ya mobémbo na ye molayi eye ekozela ye, Ousman alobi boyambi elámu ya baye bavandi waná mpe basáli ya lisangá. «Tokómi libótá lyokó», elimboli ye.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

13 sánzá ya motóbá 2026, 15:22