Bendele ya Lisanga ya Poto ekopepa na Bruxelles Bendele ya Lisanga ya Poto ekopepa na Bruxelles 

Oxfam esengi na Poto kobunda na bokási na babokeseni

Na mokánda mókó ebimaki na 9 ya sánzá ya motóbá, lisangá ya mokili mobimba Oxfam etúni na bakambi ya Lisangá lya Poto na loléngé ya likoló ya babokeseni ekómi na mokili. Mokánda ená ebimisi mpenza na mwinda mosála ya bakompani 100 minéne ya Poto na bomátisi ya babokeseni biná na bato, politiki, nkita mpe nzinganzinga.

JR Bompolonga – Kinshasa

«Litambe lyokó elekami na bomátisi ya babokeseni, pámba te kobánda leló tokoleka balomeko», elobi Alexandre Poidatz, molobi ya Oxfam France na mituná ya babobongisi bamisála bizali na bikóló ebelé, atúnamaki na Vatican News.

Mokánda elakisi babokeseni ya ntina koleka káti ya lifúta ya bakónzi mpe eye ya basáli, na bolakisi bokaboli bokó ekeseni na matómba ya misála mpo ya batambwisi (actionnaires), baye bakobima bato ya boyambo, libosó ya boúmeli.

«Kolamwisa Poto»

Zando ya Poto mpe misála ya bikóló boíké bizali na kilo enéne na nkita na botáli na mokili, elimboli Alexandre Poidatz, bakompani 100 minéne ya Poto bizali na 25% ya motángo ya makambo ya misála minéne ya mokili.

Sóki kilo ená ya nkita epesi ye mwá mokúmbá mókó, epesi Poto lokolá bokási bokó ya mbongwana. Na eleko yokó esika wápi baletá bikomibenda moke moke mpe bitiki kosála zando, na bosungi loléngé lyokó ya botiki kotambwisa, «Poto ekoki kolakisa ndakisa yokó esusu ya nkita mpo ya bakompani ya bikóló biíké eye ekosangisa makambo ya mosolo mpe makambo ya bato mpe nzinganzinga», elobi molobi ya Oxfam.

Biyano bibongisami

Mokánda elobi lokolá nsinga káti ya ndéngé ya mokuse ya nkita mpe bofúti ya batambwisi, likambo eye Alexandre Poidatz apesi banzelá mibalé ya biyano: kopesa mikáno na bokotisi babokaboli na batambwisi na bopesi mosolo ekoki na boleki ya nzinganzinga mpe na bofúti bokó elongobami ya «lisangá ya basáli na molongó ya bobimisi» ngambo yokó, mpe kokitisa libúlú ya lifúta káti ya bakónzi mpe lifúta ya ntéi ngambo esusu.

Bobundi ya Poto na Amerika mpe Sini (Chine), elobi Alexandre Poidatz, ekotála bosáleli ya politiki yokó ya Poto ya botámbwisi mpe ya botosi bandelo ya mokili. Bokambi bokó ya boye, sóki endimami epái ya Poto, ekoki kozua na lombango makambo ya sóló na bikóló mpe bato, elaki Oxfam.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

10 sánzá ya motóbá 2026, 14:30