O káti ya esika ya koyamba mpe koyéba ba migrant ya Lampedusa, na nzelá ya botáli ya bamigrant
JR Bompolonga - Kinshasa
Kosála na bomoto mpe koyamba baye bansó bakokatisa Méditerranée. Waná bizali mibéko bikokamba Croix-Rouge ya Italie eye, úta mokolo ya yambo ya sánzá ya motóbá 2023, azuaka mokúmbá ya esika ya koyamba mpe ya koyéba bamigrant (hotspot) ya Contrada Imbriacola na Lampedusa, esika nini koleka bamigrant 182 000 baleka sima ya bokatisi mingimingi ya liwa. Esika ená ezali esika ya ntina epái wápi bamigrant bakitaka ya yambo na Méditerranée ya káti. Ebombana káti ya bangomba, mosika na mobúlú ya kátikáti ya engúmba, esika ya boyambi ezali na lobwakú lyokó ya moke, ebátelami na mampinga mpe ekofúngwama na ezibeli yokó enéne.
Koleka babiro ya bakambi mpe masangá ya bato -káti na bangó Save the Children, HCR mpe OIM-, ekipi esika waná ezali ya misála ebelé. Bato ya boyókani bazali na káti; bozali na bangó ezali na ntina makási úta bokómi na libóngo, na sima etapi ya boyébi moto mpe ya bolekisi eye ekokoba. Bizali mingimingi bangó mókó bamigrant ya kála, baye bavandaka na esika ya boyambi, baye balandaki matéya na likambo ya boyambi. Okomona yambo bakiti mpe bisika ya kobombana biye bikoki kosálisa kino bato 120 mbala mókó, na lokolá éma mókó mpo ya losámbo.
Mbongwana na esika ya koyamba mpe koyéba bamigrant
Lisoló ya esika eye etiama ndelo na banzete ya minéne mpe efelo yokó ekangemi na etamboli ya bokómi ya bamigrant na Méditerranée ya ntéi mpe na politiki ya Italie mpe ya Poto na eye etáli boyambi. Esika yangó ebándaka na ebándeli ya mibú 2000, na eyano ya bomáti ya babokómi ya bamigrant mpe baye bakosenga ebombanelo na esangá. Likambo ya koluka ezalaki ya kokela esika yokó ya kosála misála ya yambo ya boyébi, ya lisálisi na bankisi mpe boyambi ya bato babikisami na ebale. Sima ya mibú, esika ya boyambi ekómaki monéne mbala ebelé, ebongisama mpo ya bomáti ya babokómi, mpe esika yangó ezwaki lokolá botelemeli mpe bileli ya bato, mingi mpenza na makámá ya bamigrant ya 2011, 2020 mpe 2023 -mobú eye emonaki na sánzá ya libwa, bato 12 500 bakóma na mokolo mókó. Na 2015, na mwángo ya Linaka ya Poto ya migration etombolama na Komisyo ya Poto, esika ená ekotaka na loléngé ebéngama «hotspots», esálemaka neti bisika ya ndelo esika wápi kosangisa ndéngé ya boyébi, ya elili ya boyébi moto, ya lisungi na lisálisi ya mónganga mpe bofúngoli makambo bitáli ebombanelo to bozongi.
Croix-Rouge: «Tozali esika ya yambo epái wápi okoki koyóka obátelami»
« Bakokóma mingimingi áwa na koyéba te esika nini bazali», elimboli motambuisi na bisó, mokambi ya esika ya boyambi Imad Dalil. Yangó waná elembo yokó na karte enéne ya Italie etiama na esika ya boyambi ekolakisa esangá moke na Méditerranée esika wápi bakitaki, elongo na bansango ya minéne mpe lokásá lyokó ya misála bibongisama. Mpósá ya libosó, mpo ya moto nionso, ezali ya komikangisa na Wi-Fi, kobenga, kokoma liloba lyokó mpe kopesa to kozua bansango ya libótá na bangó mpe ya baningá na bangó. «Áwa, tokomeka komemela na mókó mókó lisálisi ya malámu koleka, mpenza na ndéngé ya molimo, mpo masoló ya mobémbo na bangó mpe ya bovandi na bangó na Libye eye bakoyébisa bisó bizali masapo ya pási biye bikosenga penepene, mpósá ya komiyoka obátelami mpe ya kokoka kobánda kokanisa bomoí bokó ya sika».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye