Na Congo-Kinshasa, Alima ebengi masangá kobunda na Ebola
JR Bompolonga – Kinshasa
Na 18 ya sánzá ya mitáno eleki, epidémi ya Ebola ya mbala ya 17 endimami na Congo-Kinshasa. Na sánzá yókó, koleka bato 200 bakúfi na virus Bundibugyo, yangó ezali na vaccin mókó te to lisálisi lyokó ya ntina na monyele ya ekóló, nzokándé na moke 875 basusu bazuaki bokono. Mitúya bilobamaki mokolo ya minéi n’Afrika CDC, esalelo ya bokólóngóno ya Lisangá y’Afrika, mpe biye ya sóló bizali na nsé ya bosóló. Epidémi nanu ekómi na nsongé na yangó te, emonaki mokolo ya misáto Croix-Rouge eye elingaki eyano yókó ya bomoto ya ntina koleka.
Ezali na Sudi mpe Nordi-Kivu kasi lokolá na Ituri, lisangá Alima etelémisi o ntéi ya bisika misáto ya lisálisi bibongami, bisáleli 50 ya bokólóngóno mpe na nzelá ya basáli 800 na mabelé waná. Lisoló na mokambi ya etindá, Barry Mamadou Kaba, avandi na Goma.
Boni boni bato bakobika na bozali ya virus Ebola ?
Ezali na loléngé lyokó ya botungisami, kasi ezali lokolá ‘te yangó ebongolaki bomoí ya mokolo na mokolo ya bato na monyele: bazando bikokoba kofúngwama, bato bakokoba kosangana. Ezali ya sóló ‘te bisika ya bosukoli mabóko bizali epái na epái, kasi na libándá ya etuka ya Bunia leló, ezali bisika ebelé bizali na eloko te. Bosálisi ya bokólóngóno ekoki kaka kozala makási na bisika internet ezali te. Esengeli kokende lokolá na bisika biye bizali na makámá mpo ‘te masangá bizua makási ya koyanola na epidémi. Basáli ya bokólóngóno bangó mókó, atá makoki nionso bapesi bangó, bakoki kosilisa epidémi te. Kasi soki otáli ezaleli ya bato, okoyoka ‘te bazali kobunda na epidémi yókó ya mabé lokolá Ebola.
Virus eye eyebanaki eleki mibú 50. Ezali epidémi ya Ebola ya mbala ya 17. Ekoki yo koloba ‘te bato bazali, mwá ndambo, na koyéba mpe kokéba na mibéko ya bokólóngóno?
Ndambo ya bato bayébi, kasi misusu ebelé bakondima te. Ezali eye bizaleli bikomonana na nzelá bikolakisa bisó. Na masangá, basusu balingi kozua lisusu banzóto, na koyéba mabé ya bokono te.
Bizaleli nini bozali kobunda na yangó?
Ya sóló mpenza. Bikipi ya masangá basengeli kolandela bato ya bokono, ya bozongeli mpe ya bolekisi bato ya bokono batiami mobúlú na epái ya lisangá. Ezali na bisika epái wápi koloba Ebola ekoki koloba kolinga ‘te bokono ekóma waná. Nzókandé sóki oyébi malámu, okoki koyéba komibátela malámu mpo ya koboya bozui bokono.
Ekoki yo koyébisa bisó lisusu mibéko ya kolanda mpo ya bomibáteli?
Na eye etáli moto na moto, ezali kaka kobátela bopeto ya mabóko, mpe komeka kozala mwá mosika na bato ya ntembe. Leló, tozali na bato bazali na féfele mpe baye basengeli kozala bato bakutanaki na moto ya bokono ya Ebola, kasi mabótá masusu balingi ‘te moto yangó atikala na ndáko. Esengeli lokolá, na eye etáli masangá, bandima ‘te bato bakutana na moto ya bokono balandelama penepene zambi, sóki féfele ebimi, bato yangó bakomisama na esika yókó ebátelama epái wapi bakolandela bangó na bato bayébi. Esengeli lokolá, na epái ya masangá, kotika minganga kosála mosála na bangó na bokengi nionso, ezala bikipi ya bolandeli bato bakutana na moto ya bokono to bikipi bizui lotómo ya bokundi, na ndéngé elongobami.
Koloba nini na baye bakotanga bisó mpe bakondima te ndakisa komona bandeko na bangó kosalisama epái esusu na esika ya ndáko. Ekoki yo kolimbolela biso makoki ya bosálisi maye bosálelaka?
EsengeIi na yambo kondima ‘te Ebola ezali bokono lokolá misusu te, ezali bokono bokó ya mabé koleka malaria. Bôngó, bisika bibongisami bizali na ntina ya bosálisi.
Tokoloba lokolá na bato ‘te tokosála na polélé koleka o ntéi ya bisaleli ya bokólóngóno. Na bokeseni na eye esálemaka eleki mibú ebelé, leló baye bakotála bangó bakoki kotála bandeko na bangó mpe koyébisa na bangó na nzelá ya batalatala.
Totomboli bisáleli ya bosálisi biye tokobenga biténi ya ndáko ya lombango bibátelami makási, esika wápi tokondima bato babimisi mikakatano, kasi na polélé. Ekoki kozala ya kokengele bangó na mosika. Atá na eleko ya liwa, eye ebongisami esengi botandemi ya nzóto sima ya bobongisi yangó, mpo baboti bamona ‘te ezali mosála mókó ya kobombana te. Tobimisi nzóto, kasi esengeli lokolá ‘te bato bayéba, mpe, sóki bato balingi, bakoki kosámbela pembeni. Nzóto ekokangama na basaki ya liwa mpe ekomemama na lilita na bato bayébi.
Waná mpo ya mosála, kasi ezali lokolá na ntina ‘te bato bayéba ‘te ntángo bokono emonani noki mpe okomi sasaípi na lopitalo, ezali na konzo ya kobika ebelé. Na mokolo ya lobí, tobimisaki bato sambo baye leló babikisami.
Matondo ming na ndéngé otángi lisoló liye.