2026.06.10 Papa mpe mokangemi moko o eleko ya boleki na ye na boloko ya Brians 1, na 10 y sanza ya motoba 2026 2026.06.10 Papa mpe mokangemi moko o eleko ya boleki na ye na boloko ya Brians 1, na 10 y sanza ya motoba 2026   (@Vatican Media)

Na Barcelone, lisapo mpe etumba ya mokangemi mókó mpo ya kozua lisusu bomoí

Akomaka na etuka ya Catalogne na elikya ya bobándi ya sika, Rosita (nkombo ya kodefa), akoloba bomoí bokó etambola na mombongo ya drogue, bomipesi na badrogue mpe babutu bileka na nzelá. Sima ya mibú ebelé na boloko ya Catalogne, loléngé ya nzóto mabé esálisaki ye kokoka kosilisa etúmbu na ye na ndáko yokó ya Caritas, «Casa Betania», ezali eténi ya Raval. «Áwa, nazua libótá lyokó. Nayékola komilinga. Eleko insó nasambelaka, namiyókaka pepele», elobi ye.

JR Bompolonga – Kinshasa

Ntángo Rosita akómi na Barcelone na 2018, akokanisa kaka kozua mosála mókó mpe komitóngela bomoí bokó ya sika. Elengé ya Italie leló azali na mibú ntúkú minei, azui na lombango mikánda misengeli mpe azui mosála mókó na pizzeria yókó. Kasi mwá mpóso sima, bobeti bokó ya motéma makási etungisi bamwangó na ye. Balongoli ye na mosála ntángo akokoka kobika te, atikali na makoki lisusu te. Moke moke, bomoí na ye ebaluki, úta mwinda kinó molili. Ndáko te, akómi na balabala, na sima na mabóko ya batékisi ya drogue.

«Natékisaki drogue mpe nazalaki komela lokolá. Cocaïne, héroïne, pilules, MDMA, speed…nionso eye ekweyaki na lobóko na ngaí», elobi ye na mwá mawa moke na motéma. «Nasengeli na bolimbisi te», endimi ye leló. Káti ya 2019 mpe 2022, bomoí na ye etambolaki na bomeli, bozangi bonsómi mpe boyengayenga. Akolála ntángo mosusu na bacarton to na nsé ya éma yókó. Kinó mokolo police ekangi ye.

Boloko lokolá libiki ezelamaki te

Ntángo akoti na boloko ya «Brians 1», ezali na commune ya Sant Esteve Sesrovires, na kilometele ntúkú minei ya Barcelone, Rosita azalaki kaka na kilo 39. «Nazalaki mpenza ya kokúfa. Nzóto na ngaí ebébaki mobimba na drogue», esemboli ye. Na bozeli atá mokó te, amoni leló bakangemi na ye lokolá mbongwana mókó ya ntina mingi na bomoí na ye. «Yangó ekoki komonana lokolá ya kokamwa, kasi boloko ebikisa ngaí. Mpo na ngaí, ezalaki lokolá mokáno ya Nzámbe», elobi elengé mwási.

Na mibú misáto, azui mbano ya kotambola na lisálisi lyokó eye amoni ya ndakisa. Atáko pási ya lokóta, alobi azuaki boyóki, motéma molayi mpe lisungi epái ya basáli ya boloko. «Balongaki kosála ngaí moto mókó ya sika ya sémba», elakisi ye. Mpo ya ye, baboloko ya Catalogne bikotiya elikya na bozongisi bato na lisangá mpe botámboli elongo na bakangemi: «Esengeli ‘te yango eyebana. Baboloko ya Catalogne bakopesa nzelá na bozongi ya bato na lisangá».

«Nazuaki lisusu ntina ya mozindo ya bomoí na ngaí»

Sóki boloko esalisaki ye na bobimi na bolingo ya drogue, bokólóngóno na ye ebébaki makási. Bánda sik’oyo, motéma na ye ekosála kaka na 14% ya makoki na yangó mpe akozela botiyi bokó ya motéma ya sika na nzóto na ye. «Likambo ya esengo, nazali na molimo mókó makási. Nazuaki ntina lisusu ya mozindo ya bomoí na ngai», etálisaki elengé mwási ya Italie. Na boyébi bokási ya bokono na ye, aboyi kolimbolama na yangó: «Nakomona nanu lobí na ngaí te, kasi nalingi bomoí bokó ya malámu, lokolá ya moto nionso».

«Casa Betania», libótá lyokó ya sika

Likoló ya mokáno mokó lisálisi ye ya kosilisa etúmbu na ye libándá ya boloko mpo ya ntina ya bokólóngóno ya nzóto, Rosita akendeki na «Casa Betania», ndáko yokó ekambemi na Caritas na Raval, yokó ya biténi ya babolá ya Barcelone. Basánzá ya yambo bizalaki pási. «Namonaka ndáko ená lokolá boloko ya mibalé», elobi ye. Kasi moke moke, botáli na ye ebongwami. Leló, akoloba Casa Betania lokolá ndáko na ye ya sóló. Ayókaki motéma eningani, alimboli komiyoka ye mókó te atáko libótá na ye ya sóló ezali te: «Nayébi ‘te batéyi mpe bato bazali pembeni na ngaí bazali libótá na ngaí, Eloko mókó ezangi ngaí te».

 Kozua boyambi lisusu sima ya kanda

Akómaka mosika na bosáleli eyamba yokó, Rosita alimboli kozongela lisusu boyambi sima ya eleko yokó ya botomboki makási. Lisoló lyokó na elengé musulman mókó etindikaki ye ya komituna na bozali na ye na Nzámbe. «Ayébisaki ngai: sóki ofingi ye, ezali ‘te ondimi ‘te azali. Sóki te, mpo na nini kofinga ye?», elobi ye. Likanisi liná ezali ebándeli ya botamboli bokó káti na ye eye ezali elongo na ye lisusu leló. «Ntángo insó nasambelaka, nakomiyóka pepele koleka. Natondi Nzámbe pámba te na motéma mókó na 14%, nasengelaki kokúfa mpe nzokándé nazali lisusu waná», ebakisi ye.

«Mbongo ezanga pási ememaka eloko te»

Rosita akomona ya kolanda te na bomoí na ye eleka. Akébisi baye bakoki kosepela na mombongo ya drogue to ya bomoí ya balabala: «mbongo ya pási te’ememaka eloko te. Eloko te. Bambéba bikoki kosálema, kasi bikoki kokóma loléngé ya bomoí te», elobi ye. «Okoki kobunga, kasi yangó esengeli kozala ya eleko mokuse. Esengeli ntángo insó koluka kozonga sima yambo ‘te ntángo eleka», elendisi Rosita. «Mokónzi akosálisa bansó ya kobándela eleko insó na libungutulu, mpo kozala moto mpe kozala mokristu ezali ya kobungaka te, kasi ya kokola na likoki ya kobongwana, koyambola, komibongisa mpe, mingimingi, ya koyókana na yo mókó mpe kolimbisa», elobaka bongo Papá na botáli boloko ya «Brians 1», eye Rosita ayébi malámu mpo alekaka kúna. Na lisikulu na ye, Léon XIV alobaka lisusu na bakangemi ‘te «bambéba ya bomoí bikolakisa nani moto waná azali te». Na botángi na sima encyclique na ye, Magnifica humanitas, Papá alobaki lisusu ‘te «moto nionso azali «na lokúmu» na likambo kaka ya kolingama, kokelama mpe kopelama na Nzámbe».

 Likanisi ya bomoí bokó ya malámu

Na bozeli botiyi motéma ya sika eye ekoki kopesa nkonzo ya sika, elengé ya Italie akokanisa sik’oyo bampósá ya mike kasi ya ntina. Kozua mosála mókó ya malámu. Kofúta bafacture na ye. Komiyoka azali na ntina. Kolingama. Mpe mingimingi kokoba koyékola komilinga ye mókó. Sima ya mibú bilekaki ya kobungama, mokangemi oyo ya kála alobi azui eye alukaka na boyébi yangó te: esika yokó na mokili.

Matondo ming na ndéngé otángi lisoló liye

22 sánzá ya motóbá 2026, 14:39