Liwa ya Edgar Morin, philosophe mpe sociologue ya boíké
Vatican News
Mbongwana ya likanisi mpe ya politiki ya bokolisi bomoto bizalaki mabángá ya litumu (angle) ya ndéngé ya makambo ebelé ya philosophe mpe sociologue Edgar Morin, akufaki mokolo ya mitáno 29 ya sánzá ya mitáno na mibú 104. Akómaka babúku ya ntina ebelé.
Na sánzá ya motóbá 2029, Papá François ayambaka moto ya mayéle eye na Vatican, mpe na 2021, na libakú ya mibú 100 na ye, na liloba lyokó etiamaka mokoloto na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Papá wa Roma abengaka ye nzeneneke ya «bambongwana ya bozindo mpe ya lombango biye mokili na bisó mpe mangómbá bikozua mpe bikokoba kozua nanu».
Kaka na 2021, ntángo mokili ekutanaki na bokono ya Covid-19 mpe makambo na yangó, bamédia ya Vatican bizuaka libakú ya kokutana na ye. Na eleko ya lisoló ená na Hélène Destombes, alobaka lisengeli ya mbongwana ya koyéba. «Tokoki kaka kobongola bomoí na bisó te, tokoki lokolá kobongola bizaleli na bisó. Tokoki kaka kotika bozui biloko ya mpámba te, na motúya kaka ya likanisi, kasi tokoki lokolá kozonga na eye ya ntina, na eye ezali ya moto: baboyókani, kobika-lisangá». Abakisaki 'te mpo ya kokela lingómbá lyokó ya sémba koleka, ezalaki na lisengeli ya «koyéba lobí ya bansó ya bato bansó na eleko ya bomoko ya mokili, ezali waná makámá ya etumba ya nucléaire, makámá ya liboma ya bosepeli koleka na eloko, makámá ya bokambi mpo ya mbano. Mokili ekoleka eténi yókó ya lisapo na ye etóndi na makámá mpe, kaka na eleko ená, evimbi na bilaka ya tekiniki mpe ya nzebi».
Eloko akoluka ya ntina na boyékoli na ye ezalaki ya kokóma na boyébi bokó eye ekoleka bokabwani ya yambo mpe ya ekomba ya makambo bikeseni ya koyéba, mpe lokolá ya kotombola botéi bokó ezui likanisi na eye ekobengama «likanisi ya boíké», eloko ya ntina ya épistémologie na ye.
Edgar Morin azalaka koloba 'te boyébi ezali kaka eténi na eténi te, kasi lokolá «ekabwani lokolá na ndambo mibalé». Ngambo mókó, boyébi ya bomoto ekokesenisa, na boluki likanisi ya nzebi mpe na bosálisi bokotisi ya moto ye mókó na koyéba; ngambo esusu, boyébi ya nzebi ekokamba nionso, «na bokaboli makambo ya boyébi, na bopési esika na babomoni ya kokamwa mpe na makanisi ya mwinda, kasi na likanisi lyokó ya lobí ya mokili mpe lobí ya nzebi».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.