Luka

2026.06.26 Bakangemi baye bazuaki mapolome na bango na balakisi na bango 2026.06.26 Bakangemi baye bazuaki mapolome na bango na balakisi na bango 

Kozua lipolome lyokó na boloko, momekano ya Etéyelo enéne katoliko ya Lublin

Úta mibú mingi, etéyelo ená enéne ya Pologne ebongisa etamboli yokó se mókó na Poto, epesami eleko nionso mpe na bozali mikolo mitáno ya mpóso o ntéi ya boloko. Bakangemi bazali bayékoli mpenza mpe, na 24 ya sánzá ya motóbá eleki, sambo káti na bangó bazuaki lipolome na bangó na káti ya boloko ya etuka ená ya Pologne.

JR Bompolonga – Kinshasa

Esika yokó epái wápi okoki koyékola moto atá mókó aya kotuna yo nini osálaka, bambéba nini bimemaka yo na boloko. Esika yokó epái wápi oyo ezali ya ntina, ezali mpósá ya kobongwana. Elimo ená ndé ememaka Etéyelo enéne katoliko Yoane-Polo Il ya Lublin (Pologne) ntángo ebongisaka mpo ya bakangemi na boloko likoki ya kozua lipolome ya etéyelo enéne yokó. 

Bosepeli ya baye bazui lipolome sika

Libakú lyokó eye ebimisi matondo mingi epái ya bakangemi baye balandaki matéya: eye ya kopesa ngonga na bangó ya bokangemi mpo ya koyékola mpe ya kobimisa makoki na bangó nionso na bato. Mpo ya sambo káti na bangó, na 24 ya sánzá ya sambo eleki ezalaki mokolo mókó ya ntina: bolongisi mikánda na bango ya bolukiluki libosó ya bayékoli mpe balakisi ewumelaki pembeni na ngonga mibalé. Mituná mizalaki pété te. Momekano ebotaki mayoki makási. «Nazali na lolendo, elobaki mókó ya bakangemi kaka na bobimi na ye na esika ya momekano. Yangó etiaki motéma na ngaí likolólikoló, kasi lokolá esengo yokó enéne. Nasepeli ndéngé nasali eloko yókó ya ntina na bomoí. Etúmbu na ngaí ekosála 'te nakozala na ngonga ya kozua master na ngai o eleko nazali na boloko».

Mapolome bizuami na bakangemi ya Lublin
Mapolome bizuami na bakangemi ya Lublin   (© Tomasz Górecki / KUL)

Mókó mókó na bangó azali na etamboli ekeseni, bopesi bokó ya etúmbu ekeseni, kasi bansó bazui bilembo ya malámu koleka na momekano ya súka ya matéya mpe kátikáti yokó likoló na etamboli ya licence na banzebi ya libótá. «Ezali esengo yokó enéne ya komona bambano ya sóló ya mosála na bisó, elobaki sángó Mirosław Kalinowski, mokónzi ya etéyelo enéne Yoane-Polo Il mpe mokambi ya mikánda na bangó ya bolukiluki. Yangó ndé mbuma ya nionso kaka mpo ya mobú mókó mobimba ya boyékoli te, kasi na bosóló ya mibú misáto. Tokolikya 'te bato baye bakokoba boyékoli na bangó ya eténi ya mibalé».

Esengo ya baye mapolome sika
Esengo ya baye mapolome sika

«Tokokela mabongi ya malámu ya boyékoli»

Mpo ya sángó eye ya Pologne, boyékoli ezali loléngé lyokó ya makási ya botéi lisusu. «Tokokela mabongi ya malámu ya boyékoli, tokotelemisa balakisi ya etéyelo enéne mpe baningá basusu, tokopesa konzo yokó na bato baye, kasi tokotiya mabongi lokolá. Toyébi - elimbolaki ye- 'te 80% ya káti na bangó bakokweya lisusu te na mosála ya kobuka mibéko, kasi na etamboli eye, libótá mpe nzinganzinga eye mokangemi akokende sima ya etúmbu na ye bizali lokolá mosála ya ntina».

Loléngé lyokó ya boyékolisi lisusu ya makási

Etéyelo katoliko Yoane-Polo Il ya Lublin ebándaki na 2013 loléngé eye ya botéi ya etéyelo enéne mpo ya bakangemi. Ezali na eleko eye na etamboli mingi ya licence mpe ya master ya kobakisa. Na mokolo moye, bato 63 bazuaka lipolome na bangó. Bato bawuti na Pologne mobimba bakolanda matéya maye mpe, úta mobú moleki, bási bakolanda matéya lokolá.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

29 sánzá ya motóbá 2026, 15:24