Luka

2026.06.05  Charles Personnaz, ntoma ya Fransa, akopesa na Papa Léon mikanda na ye ya ntoma 2026.06.05 Charles Personnaz, ntoma ya Fransa, akopesa na Papa Léon mikanda na ye ya ntoma  (@Vatican Media)

Kosálisa bolembisi na Moyen-Orient, etindá ya sika ya ntómá ya Fránsa

Charles Personnaz, oyo ayambamaki na Léon XIV mokolo ya 5 ya sánzá ya motóbá mpo ya kolakisa ye mikánda na ye ya etindá, azali moto ayébi malámu bakristu ya monyele. Mokambi ya Fonds ya bitéyelo ya monyele mpe amipesa o ntéi ya Mosála ya Monyele (Œuvre d'Orient), alingi, na Ngwendé ya Sántu-Petelo, «komeka kozua makoki ya kokóma na boboto koleka to atá lisoló káti ya bato».

JR Bompolonga - Kinshasa

Na bobándi etindá na ye epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, etindá na ye ya yambo na mosála na ye, Charles Personnaz alakisaki mikánda na ye ya etindá na Papá Léon XIV mokolo ya 5 ya sánzá ya motóbá. Mosáli monéne oyo, kinó sik’oyo mokambi ya etéyelo ya Fránsa ya libula, mpe akotikala na mosála na ye ya Fonds ya momekano mpo ya bitéyelo ya lokóta ya lifalanse ya Moyen-Orient, akómi na Roma o eleko ya mokakatano mpo ya bato ya Moyen-Orient.

Yokó ya bitindá na ye ekozala ya «kobátela lisoló ená mpe kokolisa yangó káti ya Fránsa mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo. Mpo Fránsa mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo bizali bisika mibalé ya mayéle, ya esika wápi ekoluka banzelá ya bolembisi ezaleli ená na mokili, mpo ya komeka kozua makoki ya kokóma na boboto koleka to na lisoló káti ya bato», elobi Charles Personnaz o eleko ya lisoló apesaki na bamédia ya Vatican.

Bakristu ya Monyele

Amipesa na likambo ya botéi na nzelá ya Fonds eye akokamba, ekelama na 2020 na mokónzi ya ekolo Emmanuel Macron, mpe epái ya lisangá Mosála ya Monyele na lisálisi ya masangá ya bakristu ya monyele, Charles Personnaz ayébi malámu bosóló mpe boíké ya mabelé. Atúnami na bonéne ya bobimi ya bakristu na ndéngé bitumba bikolandana na mawa, ezala na Irak, na Syrie, na bingúmba ya Palestine to ya Libá, abombi mwá bobángi te. «Esengeli kobánga. Nakanisi 'te makambo bikomami ndéngé ekomonana na masangá yangó ya bato te, atá balembi», elobi ye.

«Bato waná bazali ya kolemba, kasi bazali. Molongó ya bitéyelo, molongó ya misála mpo ya bato ekokoba mpe nakanisi 'te esika waná ndé, kaka mpo ya bakristu te, kasi atá mangómbá maye bakobika, basengeli kosimbana mpo ya kotónga lobí». Na eleko eye ya mindondo, «ezali ya sóló 'te likámá ya Libá ezali na eloko yokó ya ntina koleka, pámba te Libá etikali mpo ya bakristu ya engúmba ená mobimba lokolá esika yokó ya elembo mpe lobí ya Libá ekotála lokolá elikya ya lisangá ya masangá ya bakristu ya Proche-Orient».

Mosála ya lisangá ya bikóló

Na etumba eye ekubundama káti ya Israël mpe Hezbollah esungami na Iran na Libá, bikóló ya Westi bikomonana neti bakokoka kokota te. Fránsa esengaki na Conseil ya sécurité ya ONU ya kosimba bokoti ya limpinga ya Israël na sudi ya Libá. Mpo ya ntómá ya sika ya Fránsa epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, «ezali na bomoko ya Libá ndé ndámbo ya eyano ekobima» mpe ezali bôngó na ntina 'te lisangá ya bikóló etikala ya kotelema. «Nakanisi 'te móķó mókó akotála epái ya mosusu. Lisangá ya bikóló ekotála lisangá ya ekóló mpe epái na epái. Mpe, esengeli 'te bangó mibalé bakende nzelá mókó. Mpe waná, nakanisi 'te ezali likambo ya pási ya koleka, koleka leló».

Makoki mpo ya kimia

Sóki olingi kotónga lobí lyokó ya kimia mpo ya Moyen-Orient mpe kosálisa bozongi ya bakristu bébóo bakéi koluka makoki ya bomoí ya malongá libandá, Charles Personnaz amoni 'te makoki na moke misáto ya ntina ya kokokisa. Ya yambo, kozongisa klima yokó ya bobáteli, «kozonga na bolembisi bokó na engúmba, kotia kilo nionso ya politiki mpe kosunga makanisi nionso biye bikokende loléngé ená». Na sima, kolaka makoki ya nkita bindimami mpo 'te masangá, «ya bakristu lokolá ya bamusulman», bamiyóka batindámi na nzelá ya bobimi te. Ya misáto, komatisa misála ya bosálisi mpe ya botéi.

Etiami na esika ya misáto na Charles Personnaz, botéi ezali mosika ya kozala boyambo ya súka. Mokambi ya Fonds ya bitéyelo ya monyele alobi yangó, «botéi ezali nzelá mókó ya ntina. Na Moyen-Orient, eyébani 'te bikóló ebelé bitelemi na lisálisi ya molongó na bangó ya bitéyelo mpe atako makámá, bitéyelo bikokoba kosála». Na pembeni ya bitéyelo 200 mpe bitéyelo motóbá ya likoló bisungami na Fonds ya bitéyelo ya monyele, bakristu mpe bamusulman «bakokola penepene».

Bána bakotónga bantina ya kobika lisangá «na bosakani na libándá ya etéyelo, na boyékoli pembeni, na bozui bambano ya malámu mpe ya mabé lisangá». Mpe ya kokoba: «baningá na bisó bansó bamusulman mpe baningá na bisó bansó bakristu baye baleka na bitéyelo waná bakoloba mibú ebelé sima. Ezali waná bamonaki 'te bakokaki koloba lisangá, 'te bakokaki kobika lisangá».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

08 sánzá ya motóbá 2026, 15:14