«Epái ya Gaudí, ntoki-ndáko ekómi losámbo, etindá mpé "Katekisimo ya losámbo"»
JR Bompolonga - Kinshasa
Atombwami na molongo ya komemya na Papá François na 14 ya sánzá ya minéi 2025, mokama ya liwa ya Antoni Gaudí ekosepelama mobú eye. Gaudí akokoba kokamwisa mosika ya mokili ya ntoki-ndáko. Elongi enéne ya sika ya Catalogne, mokanisi ya Sagrada Família, ebonzama na Papá Benoît XVI na 2010, asálaka mosála na ye ya ntina biblia yokó ya libángá, «zamba yokó ya bilembo» mpo ya kotómbola molimo epái ya Nzámbe. Mosála na ye ezali bongo lokóta lyokó ya molimo koleka ya ntoki, esika wápi likonzi lyokó lyokó, eténi yokó yokó mpe elembo yokó yokó ekolakisa lisoló linéne ya libángá eye ekobenga lisusu lisapo ya libiki, úta Ebándeli kinó bosikoli ya Kristu. Azua likanisi mbala mókó ya ntoki ya Grèce, ya gothique ya Moyen-âge mpe ya baroque, Antoni Gaudí amatisi loléngé lyokó ya eloko mpe ya emoniseli epái wápi mokili, mwinda mpe bilembo ya biyamba bikosolola ntángo insó. Bomoko ya ntoki mpe ya litéya ya milúlú mpe losámbo ya misa, basilique ya Sagrada Família, ekolakisa na nionso pembeni ya ekeke yokó na ndambo ya botóngi. Léon XIV, na súka ya misa akosála na basilique mokolo ya misáto na mpokwa ya 10 ya sánzá ya motóbá, akobenisa Tour ya Yézu-Kristu eye elakisaki súka ya botóngi libandá ya ndáko o eleko ya botomboli na yangó na sánzá ya mibalé eleki. Na bametele 172,5, mosála monéne ezali ya sóló ndáko-Nzámbe ya molayi koleka na mokili.
Sima ya moto ya bwanya ya momoni endimama na bansó, ekotóngama elili ya moto mókó ya kondima ya bozindo, atóndami na boyambi mpe na bomipesi na Maria. Akangama makási na babonkoko ya Catalogne, moyemi-ndáko azalaka kosála mokolo na mokolo sapele mpe apesaka ntina koleka na elongi ya Ngondo Maria, "Mamá wa Nzámbe" mpe "Mokónzi ya bánzelú". «Epái ya Gaudí, moí-ndáko ekómi losámbo, etindá mpe "Katekisimo ya libángá"». «Akokesenisa te moyemi-ndáko na mondimi», «epái na ye, kokela ezali kosámbela», elimboli Patrick Sbalchiero, moí-lisapo mpe mopanzi nsango, mokomi ya buku «Antoni Gaudí: Moyemi-ndáko ya Nkóló». Leló, Litambe ya Antoni Gaudí eleki mosika Barcelone mpe Sagrada Família yangó mókó. Ebelé ya misála na ye bikomami na libulá ya mokili ya Unesco, na bobonzi moí-ntoki mókó akoki kosangisa libulá ya bonkoko, boyambi ya bato mpe bosika ya moí-ndáko. «Kotála ndáko ya boye ekoluka mwa eloko ya mozindo na molimo mpe motéma», elimboli ye. «Koleka ekeke yokó sima ya ebándeli ya botóngi na yangó, Sagrada Família etikali bongo liloba linéne ya boyambi bokó elati nzóto na libángá».
Patrick Sbalchiero, na nini boyambi ya Antoni Gaudí, «elongi ya mokili ya moí-ndáko ya sika», esálaki moí-ndáko ya Sagrada Família?
Antoni Gaudí akokanisa mosála na ye ya moyemi-ndáko na baloléngé mibalé. Lokolá moí-ntoki, akobongisa biloko; lokolá moyékoli mókó ya mambi ma Nzambe na bozindo, akobanda mwángo mókó ya moí-ndáko na kokanisa ndéngé nini akokoka koloba boyambi, koloba Nsango-Ndamu, na bato ya eleko na ye. Sagrada Família, mpo ya bakomi mpe baí-lisapo, ezali ntoki yokó ya eloko, nionso na mókó. Liloba na ye ya moí-ndáko ekokómisa na mokuse na loléngé lyokó ya lisapo ya libiki, úta buku ya yambo ya Biblia, Ebándeli kinó na Bosikoli ya Kristu. Ezali ya sóló eloko yókó ya mobimba, etando yokó ya métaphysique.
Ekoki bisó koloba epái ya Antoni Gaudí ya "boyékoli bokó ya mambi ma Nzambe na bozindo ya libángá" ya sóló, mingi nzinganzinga ya Ngondo Maria?
Esengeli koyéba 'te Ngondo Maria mpe sántu Yosefu, oyo losámbo ezalaki kosálema kála makási na Catalogne, bazalaka komipesa na bangó makási na bato ebelé. Epái ya Antoni Gaudí, losámbo ya Maria ezali koleka makási. Akosála mokolo na mokolo sapele na ye mpe akopesa esika ya lokúmu na Ngondo Maria na molimo ya ye mókó. Akobimisa boyambi na ye na loléngé lyokó ya moí-ndáko ya sika mpo ya eleko na ye. Azali na lŏmbi (instinct) ená ya momoni. Akotisaka lisapo nionso ya moí-ndáko na Westi; ayébaki malámu koleka babokanisi ya baí-Grèce mpe loléngé ya gothique. Mpe úta bokangi ená ya tekiniki mpe ya bonkoko, akobimisa, na nzelá ya libángá, liloba ya Nsango-Ndamu.
Litambe ya Antoni Gaudí eleki mosika Sagrada Família ye mókó. Mayéle na ye ekobima na nzelá ya misála na ye ebelé bikomama na libulá ya mokili ya Unesco na bosáli Barcelone musée mókó ya sóló ya likoló ezali ya kofúngwama, ezua bilembo ya mabúnu (courbes) mpe likanisi ya mokili. Ekoki bisó komona na Antoni Gaudí elongi yokó ekoki kosangisa libulá ya ntoki, boyambi ya bato mpe sika?
Iyo, ya ntembe te. Leló, minéi ya misála na ye ya ntoki-ndáko bikomami na libulá ya mokili ya Unesco. Likambo ya libulá ezali na ntina, na ndéngé mibalé: ezali ya yambo libulá lyokó ya Catalogne. Ekosenga na makási libulá lyokó ya lisapo esika nini akokaki kokola mbala mókó lokolá moto mpe moyemi-ndáko. Akotisaka mobimba mabongisi ya bakoko na ye ya Catalogne. Akosenga na makási lokolá libulá lyokó na lomeko ya Poto, mpenza na ntoki ya Grèce mpe civilisation nionso ya Grèce eye ayébi malámu. Akomisenga lokolá mwána ya Méditerranée; eloko eye ezali yókó ya ntina ya ntoki na ye mpe ya tekiniki na ye.
Antoni Gaudí akabwana na mokili te, atáko maloba misusu ya lokutá bizali. Azali ya kofúngwama makási mpo ya komona bampósá bikeseni, baloléngé ya moyemi-ndáko. Ayébi lokolá 'te ezali na mabula ya ntoki, ya ntoki-ndáko ebelé, biye biúti na bisika ya bato bakeseni na biye ya ye, lokolá Poto ya nordi-westi, ndakisa, to lisusu eye nionso etáli ntoki-ndáko ya Moyen-âge, gothique ya kongenga, baroque eye ayébi mingi. Akolakisa lokolá mbano mókó mpo ya bacathédrale ya Fránsa mpe ya Grande Bretagne.
Ekoki bisó koloba 'te boyambi ya Gaudí epesaki likanisi na loléngé na ye ya ntoki, to atiaki loléngé na ye na mosála ya boyambi?
Na loléngé liná ya likanisi, tokoki koloba nionso mibalé, mókó ekolia mosusu mpe epái na epái. Ezali pási kokabola moyemi-ndáko na mondimi. Na miso na ye, akomimona lokolá moto mókó ya bomikitisi, ya bosáwá, oyo asámbelaka, mpe oyo mosála ya moyemi-ndáko ezali loléngé lyokó ya losámbo. Nakomona mwá mokakatano ya kokesenisa mibalé waná. Akomona ntoki-ndáko lokolá eloko yokó ya etindá ya bopalinginyi Nsango-Ndamu. Ezali na ntina mpe pási makási na lisapo ya ntoki mpo ya koloba yangó...
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye