Boningani ya mabelé na Venezuela: Papá apesi 100 000 euros mpo ya lisálisi ya bato
Vatican News
Sango elobamaki na ebándeli ya nzanga ya mokolo ya minei 25 ya sánzá ya motóbá. Papá Léon XIV, na nzelá ya Mosáleli ya molimo ya ntómá ya Papá, atindaki lisálisi ya yambo na Venezuela, ebetamaki na mpokwa ya mokolo ya misáto 24 ya sánzá ya motóbá na baboningani ya mabelé makási. Sima ya masoló na ntómá na ye na ekóló, Mgr Alberto Ortega Martín, mpe episkopo ya Caracas, Mgr Raúl Biord Castillo, Papá wa Roma azuaki mokáno ya kopesa motángo mókó ya 100 000 euros na baye bazui makámá. Kasi bokébi ekotikala makási mpo ya bampósá ya baí-Venezuela, baye Ngwendé ya Sántu-Petelo ekomeka koyanola na mikolo mikoya, engebene na maloba ya Eklezia ya ekóló. Mokambi ya mwási ya mwá ntángo, Delcy Rodríguez, asakolaki ezalela ya pási ya mbalakaka na ekóló mobimba sima ya baboningani mibalé ya makási, boningani ya mabelé ya makási ya 7,2 mpe 7,5, biye bibetaki nordi-westi ya ekóló. Na tongo, motángo ya baye bazui makámá ebongisamaki: na moke bawei 164 mpe baye bazoki 971, kasi bakambi bakébisi 'te motángo ya bato bazui makámá ekoki komata na ndéngé mosála ya boluki bato bikokoba.
Ezaleli na La Guaira
Ezali na Letá ya ndelo ya La Guaira, ebengami na mokónzi Rodríguez «esika likámá ekomeli», ndé ezaleli ezali mabé koleka. Engebene na bulamatari, bandáko ebelé bikwei na engúmba ená mpe misála makási mpo ya koluka bato babiki na nsé ya biténi ya bandáko bibukani. Bambéba bilobami lokolá na mboka-mokónzi, Caracas, epái wápi babomi móto mpe bambulumbulu bakosála na bisika bibetamaki. Baboningani biyókani kinó na Colombie mpe bilandamaki na baboningani ya mabelé ya sima ya makási moke. Engebene ya mosála ya boyékoli mabelé y'Amerika, esika ya ebándeli ya boningani ya mabelé ezalaki pembeni ya kilometele 28 na nordi-westi ya Montalbán, na bozindo ya kilometele 13,2.
Lisálisi ya sasaípi ya Eklezia
Eklezia etelemaki úta bangonga ya yambo biye bilandaki boningani. «Tozosála eye tosálaka na eleko ya likámá: kofúngola bizibeli na bisó, kotambola elongo na baye babungisi nionso mpe komema elikya esika wápi bobángi epanzani», elobaki Marco Mencaglia, mokambi ya bamwangó ya lisálisi ya Eklezia na pási ya mokili mobimba, na bobakisi 'te fondasyo ekokoba kotambola elongo na masangá bibetami «na lisálisi na bisó mpe na nsámbo na bisó». Caritas Internationalis asakolaki lokolá lisálisi lyokó ya 100 000 euros mpo ya masungi ya yambo, elongo na Caritas ya Venezuela mpe réseau na yangó ya bapesi mabóko 30 000.
Na esika ya mosála, episkopo ya Caracas, Mgr Raúl Biord Castillo, na bozongi ya botáli bokó kúna, alobaki 'te «bapaloise mingi balakisi bambéba ya mabé koleka», na yangó cathédrale mpe bandáko-Nzámbe zómi na mibalé biye bibébaki. «Bapaloise mingi bayambaki bato zambi balekisa butu na bisika na bangó. Tosálaki kála molongo mókó ya bosálisi na nzelá ya bacaritas ya bapaloise», elimbolaki episkopo. Episkopo ya Caracas alobaki lokolá 'te motángo ya bato ekokaki kozala makási koleka, kasi «na lisálisi ya Nzámbe, ezalaki mokolo ya bopemi ya letá. Sóki yangó esálemaki mokolo mókó ya mosála, na bitéyelo, bisika ya mosála mpe ya mombongo bifungwami, motángo ya bato ya makámá elingaki kozala likoló koleka».
Ezaleli etikali ya pási koleka na dioceze ya La Guaira, esika wápi episkopo, Mgr Pablo Modesto González Pérez, alobaki apimisami na lotiliki. «Na likindo, bifelo mingi bikwei», eyóki ye mawa. Mgr Pérez abakisaki 'te bandáko-Nzámbe ebelé bizui bambéba ya ntina. Na bolobi na bamédia ya Vatican, Mgr Carlos Cabezas, episkopo ya dioceze ya Ciudad Guayana, etuka ezali na bakilometele nkama ebelé na westi ya ekóló, alobaki lisusu: «Ezaleli ezali pási, mingimingi na bituka ya káti ya ekóló, Caracas, La Guaira, Valencia, Maracai, esika wápi bandáko ya minéne bikwei, bikosopana na biténi, yangó ekolimbola 'te áwa bawei mpe baye bazoki bazali ebelé. Tokosenga ya yambo nsámbo ebelé mpo ya Venezuela, na lokolá bosálisani ya bikóló bisusu na eleko eye ya pási enéne mpo ya bato na bisó, mingi mpenza na bituka biye boningani eyókanaki na makási koleka».
Lisálisi mpe bosálisani biwuti na mokili mobimba
Na ndéngé ya mokili, mabongisi ya lisálisi bikomata. Amerika esakolaki botindi ya sasaípi bikipi ya bolukiluki mpe ya bobikisi, makoki ya minganga mpe lisálisi ya bato. Mokónzi Delcy Rodríguez apesi botondi na mokónzi Donald Trump, oyo azali na «lisoló ntángo insó» na bulamatari ya Venezuela. Bosálisani ewúti lokolá na Colombie, na Cuba, oyo atelemisaki minganga na ye bazali na ekóló, mpe mingi misusu ya bikóló y'Amerika, káti na bangó Équateur mpe Uruguay, na lokolá Inde, Italie mpe Fránsa, baye basakolaki babongami ya kosálisa na misála ya lombango.
Na mabóko ya niongo
Na mokolo ya minei, lokásá ya bopanzi nsango ya Bretagne Financial Times abimisaki 'te Venezuela ebongamaki ya koloba eye ekoki kokóma bobongisi bonéne ya niongo ya letá eye esálema te. Engebene na lokásá, bulamatari ekoloba na baposo bikoya niongo yokó ya letá ya pembeni ya milliards 240 ya dollars, ya koleka motángo ya yambo, na boluki ya kokóma na boyókani bokó na bapesi mosolo úta leló kinó súka ya mobú mpe ya kozongisa ekóló na bazando ya mokili sima mibú zómi ya bomibombi na likambo ya mosolo. Kilo ya mosolo eye, libosó ya likámá eye ya mokili mpe na ezaleli ya politiki mpe ya bato ya mindondo, ekoki kokóma lisusu kilo koleka.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye