Luka

2026.06.12 Mobembo ya bontoma na Espagne - bokutani na bamigrant na esika Las Rai­ces 2026.06.12 Mobembo ya bontoma na Espagne - bokutani na bamigrant na esika Las Rai­ces  (@Vatican Media)

Bamigrant na Tenerife: «Tozali kaka makásá to mitúya te»

O eleko ya etapi na ye ya súka ya mobémbo na ye ya bontómá na Espagne, na esangá ya Tenerife, Papá Léon XIV alobaki lisusu lisúngi na ye na bamigrant na boluki bomoí ya malámu. «Tozali bansó, na ndéngé mosusu, bamigrant», ebwakaki Papá wa Roma libosó ya bamigrant bébóo basangani na esika «Las Raíces». Na elobeli ya bamédia ya Vatican, bamigrant mitáno na Tenerife bakaboli masoló na bangó, babobángi na bangó, bandoto na bangó mpe baelikya na bangó.

JR Bompolonga – Kinshasa

Na Tenerife, ezibeli ya boyingéli ya bamigrant ebelé na Poto, sima ya bokómi bokó bokó bibombani masoló ya bási to mibáli baye bakatisi bandelo mpo ya kobandela lobí na bangó. Banzelá bikokutana kasi bantina mingimingi bikokani: kobátela libótá na ye, kokima bozangi bokengi to kopesa lobí lyokó ya malámu na bána na ye.

Elizabeth, moí-Sénégal, akobika na esangá úta 2010. Akómaka na mwángo ya bosangisi bokó ya libótá na mwána na ye ya mobáli ya yambo, leló akokabola bomoí na ye káti ya mobáli na ye, bána na ye minéi mpe mosála na ye na Croix-Rouge. «Nayaka koluka lobí lyokó ya malámu mpo ya bána na ngaí. Nazuaka makoki ya koyékola lokolá nalingaka te.  Nalingaki 'te bána na ngaí bazua konzo ená», elimboli ye. Boyingéli na ye esálemaki na mwá mokakatano. Lokóta ebimaki mokakatano mókó ya makási na bokómi na ye, kasi alobi mpenza  boyambami malámu azuaka epái ya baí-mboka. «Nazuaki bato baye bayambaki malámu. Nayékolaki kobika na bangó», elobi ye.

Elizabeth, moi-Sénégak
Elizabeth, moi-Sénégak

Pási ya kokende

Soki Elizabeth akokaki kolanda ndéngé elongobami mobáli na ye, azali komimona mobimba lokolá migrant mókó. «Nazali migrant lokolá pámba te nayaki koluka lobí lyokó mpo ya bána na ngaí», elobi elengé mwási. Sima ya bomoí ená ya sika, akobika mokolo na mokolo na mawa ya mosika ya bandeko na ye batikali na Sénégal. «Ezali pási koleka ya kotika mamá na yo, bandeko na yo ya mibáli, libótá na ye. Ntángo mosusu nazali mawa-mawa pámba te bazali na ngaí te. Kasi ezali waná boyingéli o mboka (immigration): ezali mwá moke pási», elobi ye.

Na Croix-Rouge, esika wápi akokamba úta mibú motóbá bási bakómaki na nzelá ya mayi, akozua loléngé lyokó ya libótá esusu. «Ntángo moto mókó abungisi moboti mókó to ndeko ya mobáli mókó na mayi, tokoyóka mawa na bangó. Kúna, nakomiyóka na libótá», elimboli ye.

Nzelá y'Atlantique

Mokolo na mokolo, Elizabeth akoyóka masoló biye bikotungisa ye na mozindo. Masoló ya babokwei na ebale, babokáti enama ya nzóto, babozui bási na makási to babokabwani ya sékó. Káti ya makanisi ya pási koleka, alobi tatá yokó akómaki sima ya kobungisa mwási na ye na mwána na ye na ebale, to lisusu elengé mwási ya Guinée oyo makolo mibalé mpe mabóko mibalé bikátamaki sima ya bokatisi. «Akoki lisusu kolia ye mókó te. Akotikala ya kolala bomoí na ye mobimba. Lokolá mamá, kotála yangó ezali pási koleka». «Basusu bazuaka bangó nzóto na makási, bakúmbi bazemi o eleko ya mobémbo, bazuaki babokono. Moto mókó te aponaki yangó», elobi ye mongongo ya koningana. Bána, bangó lokolá, elakisaki ye, bakokumba bilembo ya bokimi: «Ntángo bakómi, babotáli na bangó bibungi. Bayébi ntina ya likambo te. Kotála bangó boye ekosála pási».

«Mikánda te, nionso ekómi pási»

Mpo ya Elizabeth, likambo ya bokimi mboka elimbolami na bokómi na Poto te. Bozui makoki mpe mikánda ya Letá etikali nzelá mókó etondi na mabakú. «Sóki ozali na mikánda te, ezali pási koleka ya kosála. Moto mókó mókó oyo akómi áwa akoluka kosálisa libótá na ye», eyóki ye mawa. «Esengeli kosálisa banzelá ya mobéko ya boyingéli o mboka», mpo «bato bakoleka na ebale pámba te bapesi bangó banzelá misusu te. Bomoí na bangó ezali na likámá. Sóki tokokaki kokende na mobémbo na kozua banzelá ya mabé te, ezali malámu koleka mpo ya moto nionso», elobi ye.

Bamigrant bakopesa mbote na Papa
Bamigrant bakopesa mbote na Papa   (@Vatican Media)

Kokima etumba mpo ya kobikisa bomoí na ye

Mpo ya Cédric, elengé ya Mali akómaki na Tenerife sima ya boleki bokó na Gambie, boyingéli o mboka ya bato ezali yambo likambo ya bobiki. «Likoló ya etumba mpe bapási na Mali, nakómaki áwa mpo ya komibatela», elobi ye.

Leló, akoluka kotónga bomoí ya sika mpo ya kosálisa bandeko batikali na ekóló. «Nakomeka kosálisa bandeko na ngaí bazali na Mali», elobi ye. Atáko mikakatano, mpe bapási sima ya mobémbo mókó ya liwa úta mipanzi y'Afrika, andimi mokáno na ye mobimba, kasi na baye balingi kolanda nzelá ená, apesi liloba lyokó ya bokébi: «Esengeli kozala na mpiko mpe motéma mpio. Ezali pété te kokóma áwa».

Bandoto ya "mike"

Mohamed, awuti Gambie, apesi na mokuse bampósá ya bilengé ebelé bazali na Tenerife. «Nakómi mpo ya kosálisa libótá na ngaí». «Ndoto na ngaí ya yambo, ezali ya kozua mikánda. Sima, nakoki kozua mokáno ya lobí na ngaí», elobi ye. Lisikulu kaka waná epái ya Diarra, ye lokolá moí-Mali, oyo alingi kokóma mécanicien zambi ya kosálisa baye ya ye. «Lobí na ngaí, ezali kobikisa libótá na ngaí», elobi ye.

Souleymane, ye lokolá, alobi yambo ya nionso mpósá ya kosála mpe ya kokokisa bamwangó na ye. «Ndoto na ngai ezali ya kosála mpo ya kosálisa babóti na ngaí». Bansó bakokabola elikya kaka lyokó: kotónga bomoí bokó ya malongá na lisálisi ya mosála, na botelemi na Letá mpe na boyingéli.

Papa na esika Las Raices
Papa na esika Las Raices   (@Vatican Media)

Boluki kaka mókó ya lokúmu

«Tozali kaka makásá to mitúya te», elobi lisusu Elizabeth. O eleko ya bokútáni na basáli ya boyingéli ya bamigrant, na esika ya Kristu ya La Laguna ya Tenerife, Papá abetaki nsete na likambo 'te bamigrant bazali «yambo mpenza bato bakelami na elili mpe na bokokani na Nzámbe», na esika ya «biténi ya mibéko to makambo ya kokamba». «Tozali bansó bamigrant; tozali bansó bato ya mobémbo mwa boyambi na nzelá ya ekóló ya likoló», «tosalisana mpo ya kosála mobémbo eye esika yokó ya bomoto koleka mpo ya bansó, na bomemi mókó mókó eye tokoki», elendisaki Tatá-Esántu na esika «Las Raíces».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

14 sánzá ya motóbá 2026, 13:11