Luka

2026.06.06 Papa na liyemi ya bana ya Bambino Gesu  na pepo ekokende na Madrid 2026.06.06 Papa na liyemi ya bana ya Bambino Gesu na pepo ekokende na Madrid  (@Vatican Media)

Bakoni ya Bambino Gesù bazali elongo na Léon XIV na Espagne

Mpo ya mbala ya ibalé, bána ya lopitalo bazali na ndéngé ya elembo na mobémbo mókó ya bontómá ya Papá. Sima ya libonza epesami na Papá wa Roma o eleko ya mobémbo n’Afrika, na sánzá ya minéi eleki, bakoni ya mike balingaki kotombela ye mobémbo elámu na Espagne. Bayebisi na bapanzi nsango ya bamédia ya Vatican 'te liyemi lyokó ya sika ya kopésa ye na pépo epái ya Madrid ezali zambi ya kolakisa penepene na bangó na Papá wa Roma.

JR Bompolonga - Kinshasa

Na tongo, o eleko pépo ya Léon XIV ekoleka likoló na nzelá ya Espagne, liyemi lyokó esálemi na bána bakoni ya lopitalo ya bána Bambino Gesù ya Roma, etambolaki na ye. Ebongisami te na masikúlu biye Papá akoloba na mikolo mikoya, atá na babokútani biye bikosálema na mobémbo na ye na Espagne. Nzokándé, ezui esika na yangó na pépo, káti na mikánda mibongami mpo ya mobémbo ya Papá wa Roma na Espagne mpe na masangá bikozela ye.

Libonza lipésami na Papá na likoló ya Espagne

Liyemi ekomaki epái ya Léon XIV na pépo. Bapanzi nsango ya bamédia ya Vatican baye bazali na mobémbo bapesaki ye yangó. Papá wa Roma azui yangó na mabóko na ye, atáli liyemi na bokebi. Aseki. Na mwá ngonga moke, botáli na ye etelemi na makambo mike mike: bafúngola ya Sántu-Petelo biyemami na mokila ya pépo, kuruze ya wolo na kingo ya Papá ebaluki na linanisa, moyi ya monéne eye ekongengisa esika nionso. Na sima, atondi.

Úto esika ya lisano ya Bambino Gesù kinó pépo ya Papá

Sima ya balángi ebombani lisoló lyokó eye ebándi yambo ya bomáti. Ebándi na esika ya lisano ya lopitalo ya bána Bambino Gesù. Mesa mókó, linzanza lyokó ya babiki, makásá bipanzana. Nzinganzinga, bána baúti bipái na bipái kasi basangani na likambo kaka mókó: eye ya banzelá ya mike ya lopitalo, babotáli, masálisi, babozeli biye bizali lokolá bikosila te mpe baelonga ya mike bipesi esengo na bonkútú. Waná ndé ebotami libonza mpo ya Papá

Motéma mókó ya moke pembeni ya mokoloto

Ezali mingimingi Giulia, ya mibú libwa, oyo akokamba mosála. Pembeni ya mokoloto, abakisi motéma mókó ya moke. Likambo lyokó ekomonana te eye ekolakisa malámu elimo ya liyemi. Mpo lokásá yangó esálemaki lokolá nsango yokó ya Letá te. Ekokani kútu na biye bána basálaka mpo ya moto mókó balingi. Na likoló ya bulé eye bakanisaki pépo ya Papá emáti. Na pembeni Léon XIV abimi, ayébani na kuruze alataka na kingo mpe na lobóko na ye etelemi na elembo ya bopesi mbote. Okomituna na nani ekela ená epesami. Na baí-Espagne baye bakobongama ya koyamba ye. Kasi tángo mosusu lokolá na baí-ntóki ya mike baye bakozela ye na ngómbá ya Janicule na Roma.

Moyi mókó manzáni (jaune), pépo yokó mpe koseka ya Léon XIV

Ezali mbala ya yambo te likambo yangó esálema. Na mobémbo ya bontómá n’Afrika na sánzá ya minéi eleki, bakoni ya lopitalo Bambino Gesù balingaki kokende elongo na Papá wa Roma na liyemi lyokó. Loléngé lyokó ya pété ya kozala, na botikali mosika ya banzelá ya mobémbo.

Bána baye bakokende elongo na Papá wa Roma

Elongwui na esika ya lisano ya lopitalo, liyemi ekomaki na mabóko ya Papá. Akokoba nanu mobémbo na ye, ebombani káti ya makásá ya ebómbelo ya mikánda to káti ya makanisi ya mikolo miye. Na bomemi na ye mongongo ya bána biye bayébi bolembu kasi baboya likanisi te. Ezali loléngé na bangó ya koloba «mobémbo elámu !». Mpe ezali tángo mosusu yokó ya kitoko koleka.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

08 sánzá ya motóbá 2026, 15:28