Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi  (AFP or licensors)

Sudan: na bisika ya baye bakimi, etéyelo epikí mpéndé libosó ya etumba

Na Sudan, atá koleka mibú misáto ya etumba, bána ebelé bakokoba kokangama na botéi lokolá elaka yókó ya lobí. Na esika ya baye bakimi y'Al-Hichan, na nordi-esti ya ekóló, koleka bána mpe bilenge 1000 bazongeli matéya na baéma bibongwami na bisika ya kelasi. Elembo yókó ya elikya na ekóló yókó wápi epái bamilio ya bána bazangi etéyelo.

Vatican News

Na esika y'Al-Hichan, eye ekoyamba mabótá bikima etumba, mikolo bikoleka na matéya, botángi mpe masano. Bána basusu bakolóta ndótó ya kokóma «mónganga-mopasoli» (chirurgien), basusu «psychiatre» to lisusu «motéyi y'anglais». Atá loléngé ya malonga te, bilengé baye bakokoba boyékoli na bangó na baéma bibongami na bakelasi. Sudan ekoti bôngó na mobú ya minéi ya etumba káti limpinga ya ekóló na mampinga batomboki. Libosó ya likámá eye eúmeli, ndambo ya bána balandaki linaka lyokó ya lombango etiamaki na ONU na ba Ong ya waná, zambi ya kokanga lisusu mibú bibungi.

Bilengé ya sik’oyo bazui na bozindo elembo ya etumba

Engebene na Unicef, na bána milio 25 baye ekóló azali na bangó, «milio mwambi bakotánga te». Sima ya bagalasisi ya physique, ya chimie to bolobi makomi ya bangongi na kelasi, bána bakokumba bampótá ya etumba yókó ebándi na sánzá ya minéi 2023. Mingi bakimaki bitumba, bayókaki nzala, mobúlú to bokimi na makási.

Basáli ya lisálisi bakotála epái ya bána bomitonga lisusu na káti ya malémbe. «Bakokóma áwa na bobángi, ya kolemba mpe kopangana te», elimbolaki Mira Nasser, molobi ya Unicef. Kasi na ntángo, mayémi na bangó bibongwami: bilili ya etumba bikotika malémbe malémbe esika na bilili bisusu, elembo 'te babándi kozongela lisusu loléngé lyokó ya eteléméli. «Lobiko ená ya sika», atá ya bolembu, etikali ya ntina mpo kosálisa bána ya komitonga na káti.

Nzala mpe minyoko bikokoba na etamboli yókó ya botéi eye ememi elikya

Atáko mwa makambo bikokende libosó, bosóló etikali ya mawa. Elengé moyékoli mókó ya Khartoum abungisa lobóko na ye ya mobáli sima ya bozoki na bitumba. Na ekóló mobimba, makambo ya etumba bikokoba kokóma makási. Koleka «bána 825 000 na nsé ya mibú mitáno bakonyokwama na nzala ya makási». Bobébisi na bosangisi nzóto mpe bozui na makási bitikali bobángi bokó ya ntángo insó mpo ya bána.

Na Al-Hichan, kozongela nzelá ya kelasi ekolakisa koleka bozongi ya pámba na kelasi. Mpo ya mingi, botéi ekómi loléngé lyokó ya kopika mpéndé libosó ya etumba mpe ya kobátela elikya. Ibrahim, mibú 14, akolóta ndoto ya kokóma «ingénieur ya pitolo». Na ekóló yókó ebébi na bitumba, bána baye bakokoba kondima 'te lobí ekoki kosálema mosika na etumba.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

09 sánzá ya mítáno 2026, 11:12