Na Cuba, kwokoso mpo ya bato «ekokoba mokolo na mokolo», elimboli mosáli ya Nzámbe mókó
JR Bompolonga - Kinshasa
Akóma úta mibú zómi na Santiago ya Cuba, ndeko moí-Haïti Fédy Minoche, f.s.c., ya lingómbá ya ba Frères des Écoles chrétiennes, akokamba na lisangá na ye esika yókó ya botéi eye ebongisi matéya ya nkótá mpe ya bomoto. Kasi koleka etindá ená ya botéi, mosáli ya Nzámbe akomona leló bobébisi bokó ya lombango ya ndéngé ya bomoí na esangá, ematisami na bitúmbu y'Amerika.
Longola embargo y'Amerika úta 1962, Washington eye ekobomba te mpósá na ye ya mbongwana ya bokónzi na La Havane, ekosálisa na makási úto sánzá ya yambo na Cuba bokangi bokó ya pitolo, na bondingisi úta waná bokómi kaka maswá mókó ya pitolo ya Russie. Mokónzi Donald Trump asakolaki, na ebándeli ya sánzá ya mitáno, bolendisi bokó ya bitúmbu y'Amerika na Cuba, eye «ekokoba kobangisa» bobáteli ya ekóló Amerika likoló ya communisme.
Kwokoso yókó eye «ekokola mokolo na mokolo»
«Ezali na kwokoso yókó mpo ya bato eye ekokola mokolo na mokolo». «Bato bakobika ezaleli yókó ya mokakatano koleka», elimboli ndeko Fédy Minoche, fsc. Mokolo ya yambo 11 ya sánzá ya mitáno, mokónzi ya Mexique asakolaki botíndi bokó ya sika ya lisálisi epái ya esangá eke ya Caraïbes, eningani na kwokoso yókó ya mozindo ya nkita mpe ya bato.
Baí-Cuba, esemboli mosáli ya Nzámbe na bilobeli ya bamédia ya Vatican, bakobundana na bolandisi bokó ya bokeleli. «Biléi, gaz propane, bankisi, carburant mpe lotiliki bikozanga mokolo na mokolo. Bokáti lotiliki mbala ebelé bikobébisa biténi mingi ya ekóló», eyóki mawa ndeko ya Haïti. Na bokobi: «Ezali na bituka biye bizali kútu na lotiliki te. Bitéyelo bikosála ndambo, bitéyelo ya likoló bikanga bikuke na bangó mpe babongisa kaka mwá matéya na internet». Bozangi ya carburant ekopekisa lokolá basáli mpe bayékoli ya kotambola. «Bayékoli bakokoka kokóma na etéyelo ya likoló te. Basáli bakokoka te kokende na esika na bangó ya mosála», elimboli ye.
Biye bikoleka ya sóló
Mpo ya mosáli ya Nzámbe, bitúmbu bipesami na makási n'Amerika bibakisi mikakatano ya nkita bizalaki kála. «Bitúmbu ya sika bibakisi kwokoso mpo ya bato», emoni ye. «Ndambo ya biloko bizali ekotekisama na ntálo koleka. Bomoí ekómi motúya áwa na Cuba», elobi ndeko Fédy Minoche. Na babalabala ya Santiago ya Cuba, alobi komona kobima makambo bizalaka mingi te. «Okomona bato ebelé kosenga biléi to mwá mosolo mpo ya kosomba lipa. Bato bakoluka biléi na bampumbulú bibwakami. Libosó, yangó emonanaka te», elobi ye.
Bolengé bokó ebaluki na bokimi mboka
Káti ya makambo bikosálema ya polélé koleka ya kwokoso, bokimi ya bébóo ya bilengé ekobángisa mpenza bakambi ya biyamba. Na Esika LaSalle, epái wápi bandeko bakoyamba bayékoli ya likoló, eye ekomonana ezali ya koloba te. «Penepene ya bilengé bansó balingi kotika ekóló», «bakoloba 'te lobí ezali te áwa. Bakomimona na mibú zómi to zómi na mitáno na Cuba te», elobi mosáli ya Nzámbe. Likambo yangó, ekobi ye, ezali epái ya bilengé balongi mimekano mpe basáli ya sóló sóló. «Eténi enéne ya bato ekenda koluka bomoí ya malongá epái esusu», elobi ndeko Fédy, oyo mpo ya kolakisa bokimi ená ya babongó (cerveaux), atángi mokomi mpe elombé (héros) ya ekóló Cuba José Martí: «Ntángo bato bakokima, bulamatari na bangó ekómi ya mpámba».
Eklezia, pembeni ya bato ya Cuba
Libosó ya kwokoso, Eklezia katoliko ezali pembeni koleka ya bato ya Cuba. Na eleko y'Angélus mokolo ya yambo ya sánzá ya mibalé eleki, Papá Léon XIV abimisaki «litungisami ya ye enéne» libosó ya bansango bikoloba bomáti ekási ya bobéndani káti na Cuba mpe Amerika. Papá wa Roma akobaki mbela na ye na bomisangisi na nsakola ya baepiskopo ya Cuba, ebimaka mokolo ya mpóso 31 ya sánzá ya yambo, «na bobéngi bakambi bansó ya kotombola bosololi bokó ya sóló mpe ya makási, zambi koboya mobúlú mpe ekela nionso ekoki kokolisa bapási ya bato ya Cuba».
Baepiskopo basakolaki 'te kwokoso ya bobébisi ya bato mpe ya mobúlú na Cuba ezalaki sik’oyo ya sóló mpe basengaki 'te koboya matanga ya sika mpe bapási ya sika, mpenza mpo ya babolá, babangé, bato ya bokono mpe bána, na bosóló bokó esika wápi «bobángi mpe bobwaki elikya bikómi makási».
«Libosó ya bomáti ya ezalela ya bato mpe ya nkita ya ekóló, eye ekobota bozangi botélemisi mpe ntembe», baepiskopo ya Cuba basengaki na Papá Léon XIV ya kopusa mwá mikolo botáli na bangó ad limina na mokolo mókó ya sima na eye ebongisamaki libosó. «Tokokoba kosámbela mpo ya ekóló na bisó mpe tokozongisa ya sika bolingo na bisó mpe lisangá na bisó na Papá mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo», baepiskopo balobaka na mokánda mókó ebimaka na lisangá na bangó ya Cuba na bosakoli bopusi ya mobémbo eye esengelaki kosálema na Vatican úta 16 kinó 20 ya sánzá ya mibalé.
Lisálisi ya ntina ya Eklezia
Na mabelé na Cuba, bapaloise mpe masangá ya likabo bikobongwana malémbe malémbe na «bisika ya lisálisi ya bato». «Na Caritas mpe bisáleli ya eklezia, penepene ya bandáko-Nzámbe bansó bikóma bisika ya lisálisi ya bato», elimboli mosáli ya Nzámbe.
Na esika LaSalle, bandeko bafúngoli esika yókó ya botekisi nkisi mpo ya kokabola bamonó bizuami na lisálisi ya makabo ya bikóló bisusu. Bakantini (cantines) ya bapaloise bisálemi mpo ya kopésa biléi ya móto, mpenza na babangé.
«Kolóna mbóto mókó ya moke ya elikya»
Na eleko yókó ezui elembo ya bobwaki elikya, mosáli ya Nzámbe amoni 'te etindá ya Eklezia ezali ya motó mpe ya molimo. «Ezali na bobwaki elikya ebelé káti na baí-Cuba», elobi ye. «Tokomeka kolóna mbóto mókó ya moke na bobwaki elikya nionso». Kwokoso, ekobaki ye, ekotindá mingimingi bato na bapaloise. «Bato bazalaki kokende ndáko-Nzámbe te bakoya kobeta na bizibeli na bisó mpo ya koloba, mpo bayókama, mpo ya kozua esika yókó ya kopema».
Ndeko Fédy abéngi lisangá ya bikóló bisusu ya kokoba lisálisi ebongisami mpo ya Cuba. «Atá sóki eyano yókó ya sasaípi ezali te, elobi ye, bosálisani ená ekokitisa bapási ya bato». «Bato ya Cuba bazali bato ya makási, bato bayébi kopika mpéndé. Bomoí esili te», esúkisi ye na mwá ndambo ya elikya.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.