Luka

Oleksandr Tymchenko, Ucraine Oleksandr Tymchenko, Ucraine 

Lyubov, mamá ya Ukraine: «úta liwa ya mwána na ngai ya mobáli, nazali mamá ya bansó»

Mwási eye abungisaki mwána na ye ya mobáli Oleksandr na 28 ya sánzá ya mibalé 2024, akwéyaki na mibú 29: «Ezali na pási monéne koleka te ya kokunda bána na yo mókó. Nabombaka biloko na ye mpe nakozela ye kaka». Mamá eye azalaki na kimia te, kinó akutanaki na bási basusu lokolá ye, na mwángo "Bamamá ya Ndáko Padre Pio". Akutanaki na Papá, asálisaka basoda na bopesi liloba lyokó ya elikya na baye bakobika na liláká.

JR Bompolonga - Kinshasa

Tokanisaka mingimingi elikya lokolá likanisi lyokó ya kilo te, ndoto yókó ya lobí lyokó ya kitoko koleka. Pási ekobongwana na bobwaki elikya te ntángo ekabolami na moto mosusu. Mpo ya Lyubov, mamá ya soda mókó ya Ukraine akwéyaki na etumba, elikya ebotami yambo kútu ya mokáno na ye ya kozala na mwángo mókó ya bobongisi. Misisa na ye bizindisami na motéma ya mwána na ye ya mobáli. Boyambani bokó bokó epesami na soda mókó aúti etumba, mpáto (colis) ya biléi elambami na bolingo, liloba lyokó lyokó ya bolendisi elobami na libótá lyokó ekutani na etumba, ezali mbóto mókó ya elikya eye ekokola. Na bikela biye ya mokolo na mokolo, molimo mpe bolingo bikosangana, na bobongoli pási na bomoí ekabolami mpe na nsinga yókó ebombana eye ekokoba kosangisa baye batikali mpe baye babundaki.

Likanisi ya « Sashunia » na vous

« Sashunia », ezali ndéngé waná ndé Lyubov akokoba kobenga mwána na ye ya mobáli Oleksandr Tymchenko, akwéyaki na etumba na 28 ya sánzá ya mibalé 2024 mpo ya kobundela ekóló ya ye, azalaki na mibú 29. « Ezali pási makási  - elobi mwási na ba média ya Vatican - kasi nakomeka komikangama na ngai mókó te, nakomeka kozala na ntina na basusu. Tokotikala sékó te, mpe nalingi 'te sima na bisó, likanisi na ye etikala kongenga, na sémba mpe na lokúmu ».

Yambo ya etumba, Oleksandr asálaka mosála na ye ya lotómo na limpinga ya Ukraine te, mpo azuaka bopusi sima (rapport) ya mibú sambo sima ya liwa ya yaya na ye ya libosó, na mibú 27. Atángaka na etéyelo ya likoló ya bilanga ya Vinnytsia, epái wápi azuaka licence na ouais. Alingaka kokoba boyékoli na ye, kasi sima ya liwa ya ndeko na ye, azuaka mokáno ya bozui bopemi mpe abandaki kosála na tatá na ye na moissonneuse-batteuse. « Alingaka mingi bilanga , ekundoli mamá na ye, kolongola blé mpe masangu. Azalaki kobátela balapin ya mike, mpo ya kozokisa bangó te o eleko ya bolongoli. Alingaka kotála mokili, koloba. Azalaka mwána mobáli mókó ya bolámu koleka ».

Maloba na ye ya súka na nzelá ya singa

Ntángo etumba ebándaki na baí-Russie, Oleksandr azuaka mokáno ya kokota na mampinga na mpósá na ye mókó pembeni ya tatá na ye. Asálaki mwá basánzá na bobateli mabelé, sima batindaki ye na esika ya ndelo na Bélarus, mpe na sima na Krasnohorivka, na engúmba ya Donetsk. Bazokisaki est un libolongo, un bapasolaki est un sima alandaki bobongisami. Ntángo ya bobiki na ye, azongaki epái na ye, kasi yambo ya súka ya eleko ebongamaki, azuaka mokáno ya kozonga na etumba. « Commandant abéngaki ye , elobi Lyubov, na bolobi na ye 'te asengelaki kokende pámba te bato babandaki kozanga ». Oleksandr azongaki à Krasnohorivka, à Donetsk. Mikolo misáto sima ya bozongi na ye na esika na ye ya sika, moto nionso azuaki motindo ya kokende esika etumba ezalaki. Ezali waná ndé Oleksandr azuaka liwa. « Tosololaki mpo ya mbala ya súka na 28 ya sánzá ya mibalé, pembeni ya ngonga ya 21. Ayébisi mobáli na ngai: "Awa, ezaleli ezali makási koleka...Pésa ngai mamá". Nayebisaki ye: "Mwána na ngai, lokolá ozali na bisó, tozali na bomoí, elikya mpe esengo". Kasi azalaki koloba na pási, makelele ezalaki ebelé, masasi mpe ba lokito ».

Oleksandr na tata na ye
Oleksandr na tata na ye

« Mamina, konzo elámu, mpe na ngai, eye ekoki kokóma », elobaki Oleksandr na mamá na ye na bobéndani bokó eye azuaka kála te. « Bizalaki maloba ya súka tosololaki . Mais tu ená, nalalaki te, nakobánga. Nakanisi mamá mókó te akoki koyéba pási lokolá eye toyókaki. Ezalaki ngonga ya 2 na miniti 15 ntángo nayókaki mawa makási; nayókaki neti bazali kokata ngai na biténi mibalé na mbeli ya molayi. Ezali na sima ndé bayébisaki ngai 'te na eleko ená, mwána na ngai akufaki, babomaki ye na ba drone ». Nzóto ya Oleksandr ezongaka na ndáko mpe baboti na ye basálaka matanga. Bato bazalaki ebelé koleka kinó molongó ekatanaki na ngonga ya 4 ya ntongo. « Nalingaki makási kotikala ngai mókó na mwána na ngai, mpo nazalaki na kimia te. Nakokaki kondima te 'te yangó esálemaki ya sóló », ekanisi Lyubov. Lokolá mamá, azalaki na mpósá ya komona mpe kosimba bampótá ya mwána na ye ya mobáli : « Ezali kaka na eleko ená ndé nasosolaki 'te bomoí ezalaki lisusu te ».

«Mamá mókó atikaka kozela te»

Lyubov alobi 'te, ntángo amonaka basoda na nzelá, apusani mpe asengi bangó: « Nakoki koyamba yo na mabóko na ngai ?». Azali komona lokolá akoyamba mwána na vous. Mbala mókó, akutanaki na soda mókó oyo aútaki etumba. Ntango akangi ye na mabóko na ye, ayókaki nsolo ya etumba, eye ya molinga. « Ntángo Sashunia azalaka kozonga, azalaki kopésa ngai atá bilamba na ye te, kasi abándaki kobwaka yangó ye mókó na masini ya kosukola bilamba, mpo nayóka atá nsolo na yangó te. Nayókaki nsolo waná kaka ntángo bamemelaki bisó biloko na ye sima ya liwa. Natikaki nionso na mesa, lokolá na musée mókó. Nakendeke esika yangó, nakoloba na bilamba yangó. Biloko na vous misusu bizali na esika ya kobomba bilamba. Nasukoli yangó mpe nabongisi yangó, mpo Sashunia akozonga. Maman mókó atikaka kozela te, atá amonaki ye na sanduku ya ebembe to te. Mpo ezali na pási koleka na mokili te koleka eye ya kokunda bána na ye mókó ».

Elengé Oleksandr Tymchenko
Elengé Oleksandr Tymchenko

Eleki mibú mibalé, nzokandé, baboti ya Oleksandr bazali na motéma ebetaka ntángo insó motuka mókó ekoleka libosó na bangó. Mpo Sashunia na bangó azalaka kozonga alaka te. «  Akokóma mingi o eleko nazalaki na likambo lokolá mokoloto ya moi  », elobi mamá na ye na bopemi. «  Ntangó toyóki motuka mókó to tukutuku yókó, tokozela ndé ezala ye. Oyébi, molimo na ngai esili elembi, mpe nakokoba kozela…Ezali kaka loléngé molimo na ngai, motéma na ngai, ekoluka bolingo. Omoni, motéma na ngai mpe molimo na ngai bikoyokana te: molimo elobi likambo mosusu, nzokandé motéma elobi : ''Akokóma''. Kasi akoka lisusu kokóma te… »

Mwango mókó na bosálisi na bamamá basusu

Na sánzá ya mwambi 2024, Lyubov abengamaki kozala na mwango ya bozongisi Ba Mamá ya Ndáko Padre Pio. Na ebándeli, atatabanaki : «  nionso ezalaki molili, molili bipai binsó  ». Akokaka kosangisa makanisi ya matanga na elikya ya komona mwana na ye mokolo mosusu te. Na súka, azuaki mokáno ya kokende kuna mpe akendeki na Kiev, na paloise ya Frères Mineurs Capucins baye bakokamba mwango. « Nakoki komitála leló te : sóki nakendaka kuna te, nakóma kála moto ya liboma ». Na lisálisi ya baye bazuaka maloba mpe ya bakambi ya mwango, Lyubov ayékolaki lisusu kobika, « mpo ya kopésa lobiko la nsékó likanisi ya bongengi na mwana na yé ». Na bozali na milúlú ya makanisi mpe na bokaboli pási na ye na bamamá basusu -16 bakotaka na mwango-, Lyubov azuaka makási ya kokende libosó. Na bozongi epái na ye, amonaki lisusu bafololo na elanga mpe longolaki litambala na ye ya moyindo. Apésaki melesi na baye, na molendé, basálisaki mamá mókó ya kozua nzelá ya ye mókó mpo ya kokoba kobika.

Sima ya bozali na mwango Ba Mamá ya Ndáko Padre Pio, Lyubov, elongo na etuluku ya bamamá basusu, ayaki na Vatican esika wápi akutanaki na Papá, sima azalaki na mwango mosusu. « Nakendaka mbala mókó, mbala ya ibalé, ya misáto… mpe nakomaka koyóka mpósá ya kozonga kúna ». O eleko ya ba bokútani yangó, amonaka libotá lyokó enéne, ezalaki na bamamá baye bakokabola pási mókó : « Bampótá na bisó bikobimisa makila ndéngé mókó » . Basáli baye balandaka ye basálisaka ye na bonkóndé, botosi mpe molendé. Lisálisi lyokó ya ntina : « Mpo ya bisó, ezali bokási bonéné, lisálisi ya ntina, linyomi (caresse) mpo ya molimo ».

Lisálisi lyokó to, ntángo mosusu, kaka boyambani bokó

Bayebani mpe baningá mingi ya Oleksandr bakokoba kokutana na baboti na ye mpe bakoya kotálaka bangó. Lyubov mpe etuluku eye akambaka na etuka na bangó ya Zabolotne, esálemi na basia ya koleka mibú 80, bakóma kosálisa bangó: bakolamba biléi, bakotonga biloko ya ntina mpe bakosála nionso eye ekoki. Hiver yókó, o eleko Malili ezalaki makási, Lyubov amonaki na ba réseaux sociaux bobimisi ya mwási mókó oyo asengaki ba buzi (bougie) mpo ya koyetola basoda na etumba. « Tokosála yangó », elobaki ye, na botuni esika mpo ya kotinda yangó. Mwá sima, azuaki mbela na nzelá ya singa : ezalaki soda Vadym. « Mamá Lyuba, tovandi pembeni ya babuzi. Mpo ya mbala ya yambo na mpóso mibalé, toyóki moto mpe mayi ya moto”.

« Yangó etondisaki ngai na esengo », ekanisi Lyubov. « Na basánzá nzike, ntángo nionso namonaka móto, namonaka bangó libosó ya miso. Nakoyóka neti kokoka kolekisela bangó móto ená» . Basoda, atáko bayébi ye te na ye na mwána na ye, bayaka mingimingi kotála ye. Bayambani mpe baleli elongo : « Namonaka bána na ngai na elengé yókó yókó ya mobáli, mpe nalingi bangó bansó ». Na baye bazali na matánga, mamá eye asengaka ya komikangema na yo mókó te, komikotisa na nkanda te, ya kobika bomoí na yo, mpo « bansó tozali bayambemi ya koleka nzelá áwa mpe tosengeli kotambola na nzelá yangó na lokúmu, atá pási ezali ndéngé nini»

Papa azali kopesa mbote na Lyubov Tchymincko
Papa azali kopesa mbote na Lyubov Tchymincko   (@Vatican Media)

Matondo Mingi na ndéngé otángi Lisoló Liye.

12 sánzá ya mítáno 2026, 13:08