Ba migrant 110 bakomi na esanga Canaries Ba migrant 110 bakomi na esanga Canaries   (ANSA)

Esika ya makanisi etáli migration: «Mpo ya masangá katoliko, ezali botosi ya lokúmu lya moto nde ezali na ntina»

ONU esangani kinó 8 ya sánzá ya mitáno na New York mpo ya mbala ya mibalé ya Esika ya mokili ya botáli migration. Likambo lyokó ya bobéndani, na eleko mokili esangani epái wápi bokeseni ekokola. Bosáleli na ekóló ezali ndéngé na ndéngé mpe bosáli ekokende na mbango koleka. Masangá ya lisálisi babeleli na likambo lyokó ekokoba kobéba

JR Bompolonga - Kinshasa

«Eloko ya lombango koleka ezali ya kobátela banzelá ya migration mpo banzelá bikokóma mabé lisusu koleka, elimbolaki Amaya Valcarcel, mosámbeli na lingómbá ya ba Jésuite mpo ya babombami. Mpo ya bisó, masangá katoliko, ezali lokúmu ya babáli mpe ya bási ndé ezali na ntina». Na molongó ya yambo na libándá, masangá ya lisálisi bazali na nzebi yókó na libándá ya koyébisa na bikóló. Úta 5 ya sánzá ya mitáno na New York, esika ená ya makanisi esálemaka sima ya mibú minéi esangisi bakónzi ya Letá mpe ya bulamatari ya bikóló bilama ya ONU, na bisáleli bisusu ya ntina bizali na nkombo ya motáli ya eleko insó epái ya Lisangá enéne (Assemblée générale), na káti waná Ngwendé ya Sántu-Petelo.

Lokúmu ya moto

«Ntángo mosusu esengeli na bisó, na ndéngé ya mokili, kosála mingi mpo ya kotómbola koleka bosémbo, bokokani mpe bomátisi ya bikóló y'Afrika zambi bazala na mpósá ya kokende na bikóló bisusu te», Léon XIV apésaki likanisi na pépo eye ezongisaki ye na Roma, na 24 ya sánzá ya minéi 2026 sima ya mobémbo na ye n'Afrika. Papá ayanolaki na motuná mókó etáli ba migrant, mpe atelemelaki mabé maye bisálemi epái ya basusu. «Atá ndéngé nini, bazali bato mpe tosengeli tozua bangó loléngé ya bato, mpe mingimingi kosála mabé koleka baniama te, ekobaki Tatá-Esántu. Ezali waná mokakatano mókó monéne: ekóló yókó ekoki koloba 'te ekoki koyamba mingi te, kasi sóki bato yangó bakómi, bazali bato mpe bakoki na botosi eye ebongi na moto nionso mpo ya lokúmu na ye».

Nzokándé bapolitiki mingi ya letá bikopékisa baí-mboka koyamba bapaya, bapolitiki biye masangá mingi bitélémeli yangó. Ndakisa, Caritas Internationalis abengi kotika kobébisa lisálisi ya ba migrant. Lisangá ekomátisa sémbo, mpe kútu «lotómo ya mobéko mpe ya molimo ya kobikisa bomoí». Engebene na lisangá, koleka ba migrant 82 000 balobaki bawéi to babungi úta 2014 na mokili, na motángo ya bokufi koleka na banzelá ya maí.

Makambo ebelé

Bitumba, bokeseni na nkita, mbongwana ya klima...makambo bikotindá na bokimi bato bizali bébóo. Na liloba na ye ekomamaki o eleko ya Esika ya makanisi ya bikóló, Caritas Internationalis atángaki Encyclique Laudato si' mpo ya kokundola 'te nzinganzinga ya bato mpe ya mokili bikangemi elongo, bikopusa bato ya makámá ya yambo na bobébi ená ya kokima.

Caritas Internationalis apési longonya na «libakú lyokó ya ntina mpo ya ba Letá ya kosilisa bambéba ya bosáleli mpe ya koloba lisusu bomipesi na bangó mpo ya bokambi bokó ya migration ekotála bato mpe epési boyambo na makoki ya moto». Lisangá katoliko ebengi ba Letá-bilama ya kotála lisusu makambo ya bokimi na makási mpe ya koluka biyano na bontómá.

Biyano na bosáli mabé

Bokoti na lingómbá ekoki kosálema na bozui bokó ya lisálisi, ya botéi mpe ya kovanda mpo ya migrant bansó. Ba ndéngé ya koyamba ya malonga mpo ya kopesa bangó makoki ya kobika na bato mpe kosálisa na nionso kúna. Ba Letá bikéba na botosi ya mibéko ya mosála ya ba migrant eye ekosálisa ya kokitisa bobúbi ya basáli to bokotisi bangó na nkita ya kobombana.

Lingómbá ya ba Jésuite mpo ya babombami ebeleli mpo ya makambo ya motó ya migration mpe ebongisi mosála mókó ya boyóki ba migrant. «Ezali botámboli bokó ya elongo ya motó mpe ya molimo mpo ya bato baye batiki nionso, libótá na bangó, lisangá na bangó, elimboli Amaya Valcarcel, bazali bato bakokima, mpe baye bakumbi mpótá mókó».

Kobátela bána

Na ngambo na ye, yambo ya Esika ya makanisi, Unicef abelelaki basáli ya bikóló na makambo ya mikáno ya migration bitáli makoki ya bána. Mibéko misusu «bikoki kotia bána na likambo ya mabé, na bokabwani na libótá mpe bozui nzelá moke ya bobáteli», ebelelaki Unicef, na botángi boyambo misáto: bána bazala mosika na mabótá na bangó te, bakangama te mpe lisálisi mpe botéi bilakama.

Léon XIV ye mókó abetaka nsete na lisengeli ya kobátela bána. Papá abongisaki Mokolo ya 112 ya mokili ya ba migrant mpe ya babombami, eye ekosálema na 3 mpe 4 ya sánzá ya zómi, na likambo-likonzi "Atá mwána móķó kaka ya bána baye". Na liponi lina, akoluka bokébi ya mokili na kozua na lombango makoki ya makási ya kolaka bobáteli ya makoki mpe lokúmu ya bána mike.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

08 sánzá ya mítáno 2026, 15:57