Luka

BELARUS-RELIGION/

Bélarus: bobimisi ya ndeko carmélite ya Pologne Grzegorz Gawel

Mosáli ya Nzámbe ya mibú 28 mpe akangemaka úta sánzá ya libwa 2025 mpo ya bonóngi (espionnage), azali na nzóto elámu mpe akutani na libótá na ye. Babimisi bato misusu minéi lokolá, na káti waná mopanzi nsango Andrzej Poczobut, molongi ya mbano Sakharov na 2025.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Ndeko mobáli carmélite déchaussé Grzegorz Gawel, ya ekóló Pologne, azali na káti ya bakangemi misáto babimaki mokolo ya 28 ya sánzá ya minéi na Bélarus, na mwángo ya bokabolani (échange) na Pologne. Akangemaka na sánzá ya libwa elekaki mpo ya bonóngi, ndeko Gawel, ya mibú 28, carmélite déchaussé asalaka bilako na ye ya ntina, azali na nzóto elámu mpe akutani na libótá na ye. Esengo enéne, bosepeli ya káfúmbá mpe litondo ya mozindo bilobamaki na communiqué mókó ya bandeko na ye ya eténi ya molongo ya ba Carmélites déchaussés. «Totondi moto nionso mpo ya nsámbo, lisálisi mpe bosálisani na eleko eye ya pási», bikomaki bangó, na bolobi «botondi na bangó epái ya bakambi ya Eklezia mpe ya Bikóló mpo ya lisálisi nionso mpe bomipesi balakisaki na bolukiluki eye ememi na bobimisi na ye». Engebene na ba Carmélites, ndeko Gawel «azali na mpósá ya ngonga mpo ya komipemisa sima ya nzebi eye ya pási»

Bobimisi ya mopanzi nsango Poczobut

Bokabolani ya bakangemi esálemi na mwángo ya «motindo 5 mpo ya 5», eye ebongisi bokabolani ya bato mitáno bazuaka bitumbu mpo ya bonóngi na Bélarus mpe na Russie na bato mitáno ya Russie mpe ya Bélarus bakangemaki na bikóló ndéngé na ndéngé ya Lisangá ya bikóló ya Poto. Eténi ya Bélarus azongisaki na Pologne, na káti waná, longola sángó Gawel, mopanzi nsango Andrzej Poczobut, molongi ya mbano Sakharov na 2025, oyo azalaki kosála etumbu ya mibú mwambi ya boloko mpo ya bolandi molulu mókó ya mabé mpo ya bulamatari, na lokolá mokeli mosála Tomasz Bieroza, azuaka etumbu ya mibú 14.

Russie ye alekisaki bakónzi mibalé ya misála ya bonóngi ya Moldavie. Na ngambo ya Poto, bato mitáno bakabolamaki bizalaki Alexander Belan, azuaka etumbu na Moldavie mpo ya lisúli (trahison) mpe mokambi molandi ya Mosála ya nsango mpe ya bobateli ya Moldavie, Uladzislau Nadzeika, akangamaki na Pologne mpo ya bonóngi, mpe archéologue ya Russie Alexander Butyagin, bozongisi na ye o mboka esengamaka na Ukraine mpo ya «boluki ya sémbo te» na Crimée ezuamaka, na lokolá moí-russe Nina Popova, mwási ya mosáli mókó. Nkombo ya moto ya mitáno akabolamaki, mosáli mókó ya bonóngi, eyebisanaki te.

Bakangemi bayambami na Ministre wa yambo Tusk

Ministre wa yambo ya Pologne Donald Tusk ayambaki bakangemi na Pologne, na ndelo ya ekóló «Pererov-Belavezh» na Bélarus na X, atondaki «baninga» y'Amerika, ya Roumanie mpe ya Moldavie. Bobimisi ya bakangemi esálemaki na súka ya bosololi ya molayi mpe ya mokakatano.

Basángó mibalé babimaka na sánzá ya zómi na mókó 2025

Na sánzá ya zómi na mókó elekaki, Bélarus abimisaki basángó mibalé: sángó Henryk Akalotovich, sángó-mokónzi ya ndáko-Nzámbe Sántu-Yosefu na Valozhyn, mpe Andrzej Yuchniewicz, Batindami ya Oblat ya Maria azanga mbindo (OMI) ya mosála na sanctuaire ya dioceze ya Notre-Dame ya Fatima na Shumilino, bafundamaki na ba mbéba ndéngé na ndéngé mpe bakangemi na moke mibú mibalé. Na eleko ená, Lisangá ya baepiskopo ya Bélarus elobaki «bozongeli ya lisoló káti ya ekóló Bélarus mpe Amerika, na lokolá bolendisi ya bokútáni na Vatican». Basángó mibalé ya Bélarus bazali sik’oyo bakangemi na Bélarus: mókó azali ya rite latin mpe mosusu ya rite grec.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

01 sánzá ya mítáno 2026, 13:07