Baepiskopo gréco-melkite basengi bokáti ya bobuki na bituka ya sudi ya Libá
JR Bompolonga - Kinshasa
Synode ya Eklezia katoliko gréco-melkite, ekambemi na motomolo Youssef Absi, amilobaki «na mawa mpe atungisamaki mingi» na basango bikoúta na engúmba ya Libá ya Yaroun mpe na bituka bizali na ndelo ya ekóló, «bitáli bobuki mpe bokwési bisálemi na mampinga ya Israël, na bobeti bisika mpe bisáleli ya biyamba, na lokolá bandáko ya bato ya sudi» ya ekóló. Communiqué na bangó, ya 4 ya sánzá ya mitáno, etíami mokoloto na baepiskopo mpe bakambi ya biyamba ya Libá.
Mpótá mókó na boyébi ya moto
Mokolo ya mitáno ya yambo ya sánzá ya mitáno, couvent yókó mpe etéyelo yókó na Yaroun bikwéisamaki na limpinga ya Israël. Bikela yangó bizali, engebene na bangó, «pási yókó ya mozindo na boyébi ya ekóló mpe ya moto», na ndéngé bikosálema «na bisika bato bavandi te bizali mobimba na mabóko ya limpinga ya Israël». «Bandáko-Nzámbe, bitéyelo, biténi ya bapaloise mpe bandáko», baepiskopo balobi, «bizali na bisika ya losámbo, ya botéi, ya mosála mpe ya bomoí». «kobunisa yangó, ezali kopésa pási na lokúmu ya moto, na sémbo mpo ya mabelé», batelemeli yangó. Bobáteli ya biloko ya ba civil mpe bisáleli ya biyamba, ya botéi mpe ya bato na bituka waná ezali lokolá mokúmbá mókó eye etáli Israël, lokolá ekóló eye ekangi bingúmba biná.
Ba pási ya Libá
Baepiskopo balobi 'te «eye ekomona Yaroun leló ezali likambo lyokó ebombani te, kasi ezali na káti ya eleko yókó monéne koleka ya bobuki» eye ekómi na bituka ebelé na ndelo ya sudi, «na bomátisi pási ya baí-mboka». Bolozi ya Yaroun mpe ya bituka bizali pembeni, engebene na baepiskopo, «ezali pási ya Libá nionso». Yangó waná Synode ya Eklezia katoliko gréco-melkite ebengi na «bokáti sasaípi bobuki» zambi ya kosálisa baí-mboka ya «kozonga epái na bangó na bokengi nionso».
Mbélá mókó ya bobáteli ba civil
Baepiskopo babengi bulamatari ya Libá, ONU mpe masangá ya mokili ya «kozua mikáno ya sóló mpo ya kobátela ba civil, biloko na bangó mpe bisáleli na bangó ya biyamba, botéi mpe ya bomoto, mpe ya kotika bituka ya ndelo ya ekóló na melesi ya kimia, ya bobebisi to ya bobosani te». Eklezia, basúkisi, «ekotikala penepene ya bato, na bokaboli pási na bangó, na bobáteli sémbo na bangó ya mabelé, ya bozui ndáko mpe lokúmu, mpe na bobengi na boboto bokó ya semba eye ekobátela bomoto mpe ekozongisa bomoí na libótá lyokó lyokó mpe na etuka yókó yókó».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.