Na mibú zómi, nzala na mokili ebakisami mbala mibalé
JR Bompolonga – Kinshasa
Bozangi biléi na mokili ekoúta na bokitani ya makambo ya nkita te, kasi na likámá lyokó ebongisama mpe ekota makási. Mibú zómi bileki, motángo ya bato bazali konyokwama na nzala ya makási ebakisami mbala mibalé. Likambo yangó ya pási elobami na Mokánda ya mokili etáli makámá ya biléi 2026 (GRFC, Global Report on Food Crises 2026), ebimaki mokolo ya mitáno na Lisangá ya mokili libosó ya makámá ya biléi, ezali lisangá ya mokili ekosangisa ONU, Lisanga ya bikóló ya Poto mpe masangá bikeseni ya ba bulamatari mpe ya bulamatari te.
Kaka nzala koleka
Ba nsango mpo ya 2025 bizali na tembe te: bato milio 266 na bikóló 47 bakokutana na bozangi biléi ya makási. Libosó ya botomboki ya bampósá, lisangá ya bikóló emibisi, na bokitisi mosolo esengelaki na biléi na loléngé na yangó ya eleki mibú zómi.
Likambo ya mawa ya Gaza mpe ya Sudan
Bomoni ya mabé koleka ya mbala ya zómi ya mokánda ezali mawa: mpo ya mbala ya yambo úta ebándeli ya bozui basango ya GRFC, loléngé ya botiyi na molongó ya biténi ya bobateli biléi (IPC) endimaki ba nzala makási na bileko mibalé bikabwani o eleko ya mobú kaka waná. Na 2025, nzala elobamaki na sóló na Gaza mpe na biténi misusu ya Sudan. Bomatisami ená ya makási ya nzala eúti mingi na bomáti ya bitumba, na bopekisi bozui biléi mpe bokimi na makási ya bato ebelé.
Mbéba ya bitumba
«Bitumba bitikali ntina ya bozangi biléi mpe ya boléi mabé mpo ya milio ya bato na mokili», elobi Secrétaire enéne ya ONU Antonio Guterres, na ebándeli ya mokánda. «Mokánda moye ezali mbela mókó mpo ya ekela, na bolendisi bakambi ya mokili ya kozua bokási ya politiki mpo ya kokolisa na lombango mosolo na lisálisi mpe ya kosála mpo ya kosúkisa bitumba».
Géographie ya likámá
Ya noki noki ekabolami loléngé lyokó te, kasi ekangami na loléngé ya mawa na biténi misusu ya mokili. Mibalé likoló na misáto ya bato bazali na nzala koleka bazali na bikóló zómi kaka, mpenza Afghanistan, Sudan, Yémen mpe Birmanie. Ezalela ekómaki makasi na likámá ya ba bokimi ya bato. Koleka bato milio 85 (bakimi o ntéi ya ekóló, baluki bobombani mpe babombami) batindamaki kokima na makási bipái ya biténi bizuamaki na makámá ya biléi na 2025, mpe mingimingi bakutani na nzala koleka eye ya masangá biyambaki bangó.
Bomwána eboyami
Sima ya mitúya miye ya mawa ebombani pási ya baye bazangi makoki koleka. Na 2025, emonani neti bána milio 35,5 bazangi boléi ya makási, káti na bangó pembeni na milio 10 ya loléngé na yangó ya makási ya koleka mpe ya liwa. Mitúya miye, mpenza ya motungisi na ndéngé lokolá ya Gaza, Birmanie, Sudan ya Sudi mpe Sudan, biúti kaka na bozangi biléi te, kasi lokolá na bosangani ya loléngé ya kolia malonga te, ya bokabolani ya ba bokono mpe ya bokwéi mobimba ya misála ya ntina ya maí mpe ya bopétoli.
Bokwéi ya mosolo ya lisálisi
Mokánda ya 2026 ebimisi polélé likambo lyokó ya botángi ekobángisa. Sóki motángo nionso ya bato bakonyokwama na nzala (milio 266) ekoki komonana neti na nsé mwá moke na mitúya makási koleka bileka, motúya yangó ekobomba bosóló bokó ya mabé koleka: bokwéi ya boluki ba nsango. Na 2025, bikóló 18 bazangaki ba nsango (données) ya sika mpe ya bokokanisi mpo ya likákoli (analyse). Káti na bangó bizali na bikóló na ezalela ya likámá makási, lokolá Burkina Faso, Congo-Kinshasa mpe Éthiopie, biye, kaka na 2024, bazalaki na bato koleka milio 27 na ba mpósá ya lombango. Bokiti ya mitúya elingi koloba elonga yókó libosó ya nzala te, kasi bozangi bokó ya mawa ya basango eúti na mikakatano ya bokoti na mabelé mpe na bokati makási bopesi mosolo, eye ekitisami na nsé makási.
Mbongwana mókó ya ndakisa ya likanisi ezali na ntina
Makambo bikoya mpo ya 2026 bitikali na molili makási, etumba na Moyen-Orient ekobángisa kokolisa mokakatano na bisika ya botekisi biléi mpe ya kokolisa ba ntálo ya makambo ebelé na mokili. Libosó ya ezaleli eye ya lombango, bisaleli ya mokili babengi na mbongwana ya súka. Ezali kaka ya kotindá lisálisi na lombango te, elobi FAO, kasi kopesa mosolo na bomeseni na mbongwana ya klima, ya kolendisa bankita ya bato ya mboka mpe, mingimingi, kosála mpo ya kotosa mobéko ya mokili etáli lisálisi zambi biléi bisalelama lokolá mondoki te.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.