Luka

Na musée ya ekolo ya boumbu ya Luanda, n'Angola Na musée ya ekolo ya boumbu ya Luanda, n'Angola 

Na Luanda, musée mókó ekokundola bato ya makámá ya boteki baíndo n'Angola

Na ngómbá yókó ekotála mbú Atlantique, na nzinganzinga ya Luanda, etelemi ndáko yókó eye ekokundola yókó ya ba mokabo ya mabé koleka ya lisapo y'Angola, «Musée ya ekóló ya boúmbu

JR Bompolonga - Kinshasa

Esika ekokundola ba milio ya baúmbu baye, na bokónzi ya ekóló Portugal kinó ebándeli ya ekeke ya 19, bamemaka bangó úto mabóngo y'Afrika kinó na Mokili ya Sika na boleki Atlantique. «Engebene na mitángo, milio zómi ya bato bamátisa bangó lokolá baúmbu úta mabóngo y'Angola», elimboli Leonardo Dolumba, yókó ya bakambi ya musée. Kaka na Luanda pámba, atáko mitúya bilekisama bikokesene, pembeni ya milio misáto ya baí-Afrika bakangama, batie bangó na minyololo, ntángo mosusu basálaka mobémbo ezanga bozongi.

ndako ya moteki baindo ekoma musée
ndako ya moteki baindo ekoma musée

Ndáko eye ya mpémbé mpe kalé (carré) ezuami na Morro da Cruz, ngómbá ya Kuruze, etongamaka na 1786 na amiral ya Portugal Álvaro de Carvalho Matoso, mókó ya bateki ya baúmbu bayébana na mabé koleka. Na eleko ená, banókó (colon) ya Portugal basálaka bikeke misáto ya nzebi na bomemi baí-Afrika -yambo mpenza na Sénégal, sima na Mozambique mpe n'Angola.

Chapelle
Chapelle

Batisimo na makási libosó ya bomáti maswá mpo ya Mokili ya Sika

Eténi ya yambo ya musée ya boúmbu ezali chapelle yókó mwá moke ya kála koleka ndáko ya Amiral; ezali waná ndé bakangemi bazalaka kozua batisimo na makási, bazuaka lotómo ya kotika bankombo na bangó y'Afrika. Okoki lisusu komona maí ma batisimo mpe kuruze yókó na efeló. Na kotinda na makási kobongola bakangemi na bokristu, Eklezia, emikotisa makási na mosála ya banókó, akitisaka boyébi na ye; batisimo ebongolaki eloko te na ezalela ya monyoko epesamaka na baúmbu.

«Nakosála áwa na musée ya boúmbu úta mibú 25», elobi Leonardo Dolumba. «Musée eye eyébani na mokili mobimba. Bapaya ya bipái binsó bayaka áwa, tokoyamba bato ebelé ya mobémbo (touristes)». Mokónzi y'Amerika Joe Biden akomaka áwa na súka ya mobú 2024, mwá libosó bokónzi na ye esila. «Koloba lisoló ya boteki baíndo ezali ya sóló pási. Kasi ezali na ntina: mokólo (histoire) esengeli elobama mpo 'te baye bakoya sima na bisó bayéba nini elekaka na eleko ená».

Biténi ya ndáko eye ya bitáláká (étages) mibalé bikolakisa biténi zómi biye bikokundola loléngé ya pási ya nsómo ya eleko waná. Na ba vitrine, okoki komona ba menoti mpe bibendé ya lokolo ya kilo lokolá mondolu (plomb); bisáleli ya libaya biye bizalaka kosálisa ya kopesa etumbu na baúmbu bibakami na efeló. Bilili ya bamaswá bikolakisa loléngé nini bamaswá yangó ya bilima bizalaka kokumba bakangemi na ndéngé ya bomoto te na bankobé na yangó. Úta maninisa, botáli ekokende epái ya Atlantique. Pembeni ya musée, ya kofúngwama, masangala ya minéne bizali: bazalaka komelisa baúmbu lotoko mpo ya kolanguisa bangó mpe ya kopekisa bangó kotomboka.

Na musée ya boumbu ya Luanda, n'Angola
Na musée ya boumbu ya Luanda, n'Angola

«Baúmbu mingi batíndamaka úta Angola kinó Brésil», elimboli Leonardo Dolumba. «Amerika ebándaki kokóma na molongó ya mibalé, bipái bisusu bizalaka Jamaïque, mabelé ya Fránsa ya outre-mer, Guadeloupe mpe Haïti». Ezali na 1836 ndé Portugal azuaka mokáno ya kopekisa boúmbu, mpe esengelaka mibú ntuku misáto mpo 'te baúmbu bansó bazua bonsómi ya soló. Úta 1977, ndáko epái wápi bato bakitisamaka na motindo ya biloko ya kotekisa ekóma musée.

Makambo ya boúmbu bikoyókana lisusu leló

«Makambo ya boúmbu bikoyokana lisusu leló n'Angola», elimboli mokambi ya musée. «Ngambo mókó, mpo motángo ya bato bakumba bangó na makási ezalaki likoló makasi. Makambo bizali ebelé; tokoyóka kilo ya eye eleka». Mingi bakosangisa likambo 'te bato mingi y'Angola bakobika na bobola na mosála mabé esálemaka na ntángo ya banoko mpe ya boteki baíndo. «Mpe, leló, tokosála makási na ndéngé 'te baye bakokitana bisó, bána, bayékola mokólo eleka».

Papá Léon XIV akotála musée ya boúmbu te. Kasi mokolo ya eyenga, na sanctuaire ya Maria ya Muxima, akopusana makási na eleko ená ya kála: na nsé ya ndáko-Nzámbe ya sanctuaire ekoleka ebale esika nini baúmbu bazalaka kotinda bangó n'Atlantique.

Matondo mingi na ndéngé otanhi lisolo liye

20 sánzá ya mínei 2026, 15:05