Bobimi ya bakangemi na Myanmar Bobimi ya bakangemi na Myanmar 

Na Cameroun, mwinda ya elikya ekongengisa ba boloko

Na mokili mókó ya boloko, ezua elembo ya monyoko, bobwaki mpe botiki, ba mamelo ya Lingómbá ya ba Mamelo ya Sántu Thérèse ya Mwána Yézu ya Buea bakosála mokolo na mokolo mpo ya kolona ba mbóto ya elikya na dioceze ya Douala. Ezali «kaka mosála mókó te, ezali ministeli mókó ya bolingo», elobi mamelo Caroline Acha, coordinatrice ya «Victim Offender Prison Care Support» (VOPS), apostolat ebongisama na botámboli elongo na bakangemi mpe bakangemi ya kála.

Jean-René Bompolonga  - Kinshasa

Cameroun, mabelé eyambaka mpe ya esengo, «ndáko ya mibalé ya ba Papá» ezali lokolá mabelé mókó ya elikya. Na ekóló eye ezali o ntei y'Afrika, eye ezalaki mokumbi ya Mobú Esántu 2025, ekolakisama mokolo na mokolo na Mamelo Caroline Acha, mamelo ya Lingómbá ya ba Mamelo ya Sántu Thérèse ya Mwána Yézu ya Buea, na Sudi-Westi, mókó ya bingúmba (régions) mibalé bilobaka anglais na ekóló. «Etindá na bisó ezali pamba kasi mozindo: kotála Kristu na boloko mpe kozongisa lokúmu ya moto», elobi ye na moléndé. «Ezali kaka mosála mókó te, ezali ministeli mókó ya bolingo».

“«Nazalaki bolumbu, mpe bolatisi ngai; nazalaki na bokono, mpe botálaki ngai; nazalaki na boloko, mpe boyaki kotála na ngai !" Mateo 25:36"”

Bomipesi epái ya bakangemi mpe bakangemi ya kála

Úto koleka mibú motóbá, mamelo ya Cameroun azali coordinatrice ya «Victim Offender Prison Care Support» (VOPS), apostolat ya ba Mamelo ya Sántu Thérèse, ebongama na botámboli elongo na bakangemi mpe bakangemi ya kála, na etindá yókó esálema na boyambi, lokúmu mpe elikya. «Apostolat na bisó ebándaka eleki mibú 23, na 2003, na boloko ya New-Bell na Douala. Na ebándeli, ba Mamelo, na bosáli na Lopitalo Our Lady of Love na Logpom, bazalaka kotála bakangemi mpo ya kopesa bangó lisálisi ya bokólóngónó esengeli», esemboli ye. Kasi, «na lombango, tososolaki 'te ba mpósá bizalaki minéne koleka: biléí, boyékoli, botéí, lisúngi na makambo ya mibéko, mpe mingimingi botámboli elongo na moto mpe bozongisi lokúmu. Tomonaki lokolá 'te na bobimi na bangó na boloko, mingi bazalaki na esika ya kokende te. Yangó waná esika na bisó ya bozongisi na Yassa ebotama», elobi ye.

Na ekipi yókó ya bilama zómi na sambo mpe ba mamelo misusu mibalé ya lingómbá na ye, ekokota mokolo na mokolo epái ya bakangemi, na bopesi bangó eye ya koleka na esika ya kotála pamba: bozali bokó ya bomoto. Leló, esika ya ntina y'apostolat na bisó ezali na dioceze ya Douala, mpenza mpenza na ba boloko ya New-Bell mpe Ngoma, na boyanoli na ba mbela misusu na ndéngé ya makoki na bisó.

Boloko, káti ya mawa mpe botiki

Bobiki na ba boloko ya Cameroun ezali «pási koleka», eyóki mawa mamelo Caroline. Na boloko bokó lokolá eye ya New-Bell na Douala, mboka-mokónzi ya nkita ya Cameroun ndakisa, «koleka bakangemi 5 000 bakobika na ndéngé ya bato baleki ebelé. Bozangi ya biléi, bopeto, lisálisi ezali kokoka te mpo ya bokólóngónó ya nzóto mpe mawa ya molimo bizali mokolo na mokolo», elobi ye. «Boloko, ekobi mamelo, ezali esika yókó epái wápi okoki kotinda atá monguna na yo te». Bosóló bokó ematí na botiki, mpo bakangemi ebelé bazali na libótá mpo ya kosálisa bangó te.

Kopesa lisusu lokúmu lyokó, kotónga lisusu bomoí bokó

Libosó ya bosóló eye, eyano ya lingómbá evandi na botáli bokó ya mobimba: botéi, boyékolisi mosála, lisúngi na maye matáli mibéko, lisálisi na matéya mpe botámboli elongo na molimo. Bakangemi bakoyékola botóngi elamba, bosáli lipa to informatique. Basusu bakozua kútu mapolome ya bitéyelo. «Tokopesa bangó kaka mayéle mókó te, tokozongisela bangó lokúmu lyokó», elimboli mamelo. Ekela ekosúka na bizibeli ya boloko te. Na Douala, esika yókó ya koyamba bakangemi babima mpo ya kosálisa bozongi na bangó o ntéi ya bato. Bovandi mwá ngonga, botéi mpe bisalelo ya kobánda bikosálisa bangó ya kokende lisusu na makambo ya sika.

Bolingo o ntéi ya etindá

Mamelo Caroline alobi lisapo ya elenge mobáli mókó abelaka bokono bokó ya motó. Sima ya kosukola, kolatisa mpe koyemba pámba, azongeli moke moke botiyi motéma. «Botáli ya basusu ebongwani, ye mpe lokolá abongwani», elobi ye. Mpe ya kobakisa lokolá elonga ya moke: «Nazali na mokangemi mókó oyo abima kála na boloko ya New-Bell eleki mibú misáto. Alandaki na bisó boyékoli bokó ya informatique na bureautique mpe bobáteli.  Sik’oyo ezali ye oyo akotangisa bilenge bisika nionso na dioceze ya Douala. Ayékolisi koleka bato 350. Ntángo ye mókó akomona mosála monéne akosála epái ya bato, akomiyoka azali na ntina». Mpo ya mamelo Caroline, bikela biye ya pámba -koyóka, kolia, koláta- bikómi bikela ya makási ya botongi lisusu ya yo mókó.

“"«Bakangemi bakómi bato lokolá yo mpe ngai. Bazali na mpósá ya bolingo»"”

Na ba boloko ya Cameroun, bakangemi mingi bazali bilenge, mingimingi bazali na mibú 35. Ebelé bakoli na bozangi bilembo, bozangi boyékoli, ntángo mosusu na nzelá. «Ntángo omoni bangó, okomituna: lobí ya ekóló ekozala boni na bangó te?», mamelo Caroline amituni. Epái wápi ntina, elobi ye, ya kotambuisa boyékoli na bangó mpe bozongisi na bangó káti na bato. Bakangemi ya kála misusu, ntángo kaka babimaka, bakómi bangó lokolá balakisi, na bolekisi mayéle na bangó na bilenge bébóo.

Libiki ya káti mpe elikya

Atáko mikakatano -bobwakisi ya bato, bozangi makoki, bolembu ya basámbisi- etindá ekokoba. «Ezali pété te koloba elikya na boloko, kasi ekoki kosálema», elobi mamelo Caroline. Na etumba eye ya kimia, mamelo amoni 'te «tosengeli kokabola elikya», atá na bisika ya molili koleka, zambi mwinda ekoka kongenga na bomoí ya moto nionso. «Moto mókó mókó azali na motúya mókó. Bomoí mókó mókó ekoki kobongwana. Mokangemi mókó mókó asengeli kozua nkónzo ya mibalé. Na nzelá ya etindá eye, tokomema elikya mpe lokúmu». Mpo «ntángo tozongisi lokúmu, tozongisi boboto», eyébisaki mamelo ya Lingómbá ya ba Mamelo ya Sántu Thérèse ya Mwána Yézu ya Buea.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

17 sánzá ya mínei 2026, 13:05