Luka

Nkasa ya yambo ya nkasa mibale y'Algérie Nkasa ya yambo ya nkasa mibale y'Algérie  

Bapanzi nsango baye balobaka lifalanse basepeli na boyéi ya Léon XIV n'Algérie

«El Moudjahid» mpe «Le Soir» bapesi esika yókó enéne na nkásá na bangó ya mokolo ya yambo 13 ya sánzá ya minéi na boyéi ya Papá Léon XIV na ekóló, na bolakisi mobengami aúti na Roma na lokásá mobimba ya Yambo (la Une). Ba nkásá (journaux) mibalé minéne ya lokóta ya lifalanse y'Algérie babongisi nkomá mpenza ya esengo.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

«Mokili ekotála Algérie» ekomi El Moudjahid, eye epesi nkásá zómi ya libosó ya lokásá na ye ya mokolo ya yambo 13 ya sánzá ya minéi na boyéi ya Papá. «Botáli eye ezali lininisa ya malámu mpo ya ekóló, na bosálisi ya kolongola ba botatabani mpe kosilisa bitáleli ya mabé ya libandá», okoki kotánga na nkomá yókó ya yambo. Lokásá ebimisi nsakola yókó ya lingómbá ya ba Oulémas, Prêcheurs mpe Imams ya Sahel, eye ekomona na mobémbo ya Papá «liloba lyokó ya bolimbisi eye ekotombola bomoto», na lokolá nsakola yókó ya Mabrouk Zaid El-Kheir, mokambi ya Haut Conseil Islamique (HCI), eye epesi na mobémbo «lomeko ya bomoto lyokó ya mozindo», «mpo ezali libakú lyokó ya koloba lisusu lisengeli ya kosálisa banyokwami, ya kotelema penepene ya bato bazangi makási mpe ya kobátela ntina ya bosémbo na mokili mobimba».

Mokambi ya ebonga ya ministeli etálaka Makambo ya biyamba mpe ya Wakfs, Mohand Azoug, alobi na El Moudjahid 'te likambo ya kobenga mobémbo ya Papá «mobémbo ya Letá» ezali kaka na motúya ya elembo te; yangó ekobimisa lokolá «lomeko ya lisapo ya boyéi eye». Islam n'Algérie ezali na bolingisi mpe na likanisi ya bovandi bokó na lisangá ya boboto; kaka na eleko yangó, Algérie ezali mobandisi mókó ya etumba libosó ya extrémisme, likanisi lyokó ya mibú zómi ya molili ya etumba ya ba civil y'Algérie na mibú 1990. Moto ya bwanya mpe motéyi ya islam Mustapha Cherif alobi 'te «likanisi ya lisoló káti ya biyamba eyébani na baí-Algérie mpe na Islam».

Na bokútáni ya baí-Algérie

Episkopo y'Alger alobi lokolá na lisoló lyokó. Alobi 'te Léon XIV akómi n'Algérie kaka mpo ya kosepela na sántu Augustin te, kasi lokolá mpo ya kokutana na baí-Algérie ya leló, «mpe ezali mpo ya ngai likambo ya ntina». Episkopo ya lokúmu Jean-Paul Vesco apesi longónya na bakambi ya ekóló mpo ya bomipesi na bangó na bobongisi mobémbo mpe asakoli: «Papá azali na eloko ya kotekisa te, ya kosomba te, mpe ezali mpo na waná nde tokozela bokútáni kitoko na baí-Algérie». Léon XIV akolakisa liloba lyokó ya boboto mpe ya boyokani. «Mpe ekozala bokeseni ya komema yangó úto Algérie na esika ya úto Roma».

Nkásá bisusu ya El Moudjahid bikolakisa basilique Notre-Dame y'Afrika y'Alger mpe bikomi na bozindo sántu Augustin. Balakisi 'te ye oyo azalaka kaka moto ya eyamba te: «Azali libosó mpenza mokanisi monéne atika elembo na eleko na ye mpe bileko bilandaki, philosophe yókó mpe rhéteur yókó ya koleka». Bokamati ya sántu Augustin n'Algérie ezui ba nzelá ya esengo. Batángaki mokúmbi mókó ya tourisme na Madaure ya kála na liloba liye: «Ezali na likanisi lyokó mabé etáli Augustin. Mingi bakokanisa 'te ye azali na nyongo ya Eklezia ya Roma nzokándé, Eklezia ya Roma ndé ezali na nyongo na ye».

Bosepeli bokó ya mokili

«Ekóló ya sántu Augustin eyambi Papá», ekomi Le Soir eye epesi nkásá mibalé na ndambo na botáli ya Papá wa Roma na káti. Lokásá elakisi linaka ya Papá mpe elobi mingimingi mbela y'Algérie ya kozala esika yókó ya bosololi bokó elámu káti ya biyamba. Esika yókó ebengami Vox populi emoni 'te Léon XIV alingi kofúngola ba mpótá ya kála te mpe koluka ntembe n'Algérie te. Ezali mpo ya kopesa eleko yókó ya bopemi. «Bopemi bokó na makeléle ya ba bolimboli, mbela mókó ya kotála koleka ba bokabwani». Bopemi bokó ya loléngé ená ekundoli «'te bato, ntángo bakoyóka ya sóló, bakozua kaka ba balabala biye politiki ye mókó akokoka kosála te». Na ekóló ya sántu Augustin, mokanisi eye abalukaka epái ya mokili mobimba, bosololi káti ya biyamba bikeseni ezali «ezalela yókó te», kasi «bosóló bokó ya kála, ntángo mosusu ya babombami, mingimingi ya mozindo»

Ba nkásá mibalé balobi lokolá maloba ya mokambi ya Mosquée monéne ya Paris. Chems-Eddine Hafiz alobi «liloba lyokó ya makási ya elikya mpe ya bondeko...ya bomemi elembo yókó enéne». Waná ekosálisa ya koyéba «esika ya ye mókó» eye Algérie azali o ntéi ya lisangá ya bikóló. «Mobémbo eye ezali bosepeli bokó ya bomoto na bisó ya lisangá», elobi recteur, motindami ya lisangá ya baí-Algérie babikaka na Fránsa. «Litangi nionso ekozala kaka ya eyamba» ya mobémbo ya Papá «ekozala ya bokitisi». Ezali «likambo lyokó ya mokili ekolandama mbala mókó na ba milio ya bato, tángo mosusu ba milliard ya bandimi mpe batáli na mokili». Na botandeli tapi ya motáne na Papá, Algérie amibimisi lokolá «esika yókó ya bontéi, ya botelemisi mpe ya lisoló na mokili mókó ekabwani». «Liloba ya mayéle» ekoki kozala: «Ekóló yókó eye, na makási ya lisapo na ye mpe ya bonsómi na ye, azali na bobángi te ya bokútáni».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

14 sánzá ya mínei 2026, 13:04