Luka

Sango Kirill Gorbunov (na loboko ya mobali) na epsikopo ya Moscou Paolo Pezzi Sango Kirill Gorbunov (na loboko ya mobali) na epsikopo ya Moscou Paolo Pezzi  

Vicaire général ya Moscou: etumba na Ukraine "esengeli kosila"

Vicaire général ya dioceze katoliko ya Moscou, Kirill Gorbunov, asololaki na Vatican News na likambo ya "bomoí bebo" bibungi o eleko ya etumba na Ukraine, ya ntina ya mawa epái ya "mosusu" mpe na ezalela ya lisangá like ya katoliko na Russie.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Etumba enéne na Ukraine ebándaka na 24 ya sánzá ya mibalé elekaki na mibú mitáno na yangó ya bobundi. Soki motángo ya bato bazui makámá ba civil mpe ba soda epái na epái etikali pási ya koloba yangó, kasi ba bomoí bebo bibungi mpe nkanda ya mosusu ezali liyoki lyokó eye, mingimingi ekotámbola na bilobaloba, ekangemi na motéma ya bato. Yókó ya bitindá ya ntina ekoya ya Eklezia ekozala ya kosála mpo ya boleki nkanda mpe kotónga lisusu, na ngonga, soki botiyi motéma, atá kondima ya moningá ya Russie to ya Ukraine. Atá na bolembu na ye mpe moke na ye, Eklezia katoliko na Russie emipesi na nzelá ená, lokóla atatoli, na lisoló apesaki na Vatican News, sángó Kirill Gorbunov, vicaire général ya dioceze ya Notre-Dame ya Moscou.

Ukraine mpe Russie bikoti na mobú ya mitáno ya etumba. Liyoki nini ezali na baí-Russie leló?

Ezali lokúmu mpo ya ngai ya koloba na nkombo ya lisangá na bisó like katoliko na Russie. Ezali moke koleka ndéngé bato mingi bakokanisa yangó. Tokolakisa na nsé ya 1% ya bato mpe motángo ya ba katoliko bakosalela ezali lisusu moke koleka. Mpo ya makambo ebelé ya lisapo, Eklezia katoliko na Russie ekomonana na mwá bobángi, lokóla Eklezia yókó ya bapaya, Eklezia yókó ekangami na bonkoko ya Russie te. Ezali bôngó likambo lyokó ya ntembe mpo ya ba katoliko ya Russie ya kozala, epái yókó, bato ya bonkoko mpe lokóta ya Russie, mpe epái esusu, bilama ya Eklezia katoliko ya mokili mobimba.

Leló, nakoki koloba 'te baí-Russie, na káti waná ba katoliko, bakokabola likanisi na bisó na etumba ená. Esengeli kosila. Ba bomoí bebo bibungi o eleko ya etumba eye bikoloba yangó mókó. Mobúlú ezali ya koleka, mpe tokolikya 'te etumba eye esila. Súka ená esengeli kozala boboto bokó ya sémba mpe ya libélá, mpe ezali elikya, bozeli ya ba katoliko ya Russie.

Na mawa, motángo ya bawéi emati makási mibú miye minéi bileki. Malita bikómi minéne. Motángo ya bawéi ekopúsa baí-Russie na botáli boni etumba eye?

Nakoki koloba na nkombo ya baí-Russie nionso te. Ekozala pási. Nakoki koloba na nkombo ya bato nakokutana na bangó, baye bakosolola na ngai lokóla sángó. Epái yókó, ezaleli yókó ezali ya kowangana bosóló. Na mawa, mingi bakolinga kobwakisa yango kaka pámba, kobosana eye ekoleka mpe komiloba: "Tokoka eloko te. Tokoka kosála eloko kúna te. Tosála lokóla likambo ezalaki te. Tobosana yangó". Mpe mpósá ezali waná ya kozonga na ezalela ya yambo. Nionso ezonga malámu. Ekoki kosálema te.

Mpo ya basusu, etumba ekotungisa bangó. Bakomona kaka bosóló waná ya nsomo. Waná babungisi elikya. Kasi leló, bakomituná motuná na bosóló: soki makambo ya boye bikómi, litéya ya Eklezia etáli mawa, bolámu mpe ngolu ya Nzámbe, ezali ya soló? Esengeli tobaluka ngambo ya lisapo ya Libiki. Esengeli kotála Nkomá. Mpe Nkomá bikoloba seko 'te ntángo makambo maye makosálema, ezali mpo 'te nkéni ya bozangi sémbo esopani mpe 'te eloko yókó esengeli kobongwana. Bomoí na bisó esengeli kobongwana. Kaka eye ya baí-politiki te, ya mangómbá ya politiki, ya bikóló, kasi bomoi ya moto mókó mókó.

Mabótá na bisó mingi bizali na bomoko, kasi tozali na mabótá mingi lokóla ya Russie-Ukraine, mpenza káti na ba katoliko, mabótá maye bikabwani leló, kútu bibébi. Ezali liziba lyokó ya pási enéne mpo ya bato. Esengeli koluka loléngé lyokó ya kobunda na yangó.

Lisikulu nini ekokonza na eye etáli etumba na Russie? Nsango nini baí-Russie bazali kozua?

Nakoki koloba 'te lisikulu ekokonza na Russie ezali ndéngé mókó makási na eye ya bikóló binsó bizali o káti, mbala mókó to te, na etumba eye. Lisikulu ená ekoloba 'te bosóló ezali na ngambo na bisó. Tozali na bosóló mpe basusu na mabé. Nzokándé, lokóla nakoki kolanda nsango na nkóta ebelé, anglais, allemand mpe italien, namoni 'te lisikulu ezali loléngé lyokó esika nionso. Mosusu, azali mongúná, azali mobébisi. Basusu bazali bato mabé, kaka mpo basáli mabé te. Bazali bato na nionso bazali mabé, baúti na momeseno mókó mabé, loléngé ya bomoto ebéba, bakoki te na boboto mpe na bosóló. Motatabano mókó ya mozindo ekotaki na eye etáli likoki ya kobika na boboto na ngambo mosusu. Nakoki koloba 'te lisikulu ená ezali sik’oyo na bansó. Eye ezali na ntina na nsakola ya Eklezia, ezali 'te ezaleli ená mpenza ndé tosengeli koleka.

Olobaki lisangá eke ya katoliko na Russie. Boni boni lisangá eye azali libosó lya likambo yangó?

Na nionso, nakoki koloba 'te bosóló ezali 'te, na ndéngé boye to mosusu, bomoí ekokoba. Ba sakraménto, losámbo ya lisangá mpe boyébi ya litéya ya milulu mpe nsámbo ya misa bibongwami te. Kasi eye ebongwami, ezali boyébi ya sika ya kolaka bomoko ya Eklezia, leló etungisami. Bansó toyébi 'te bikeseni bizali na eye etáli litéya ya milulu mpe nsámbo ya misa, mituná misusu ya mobéko, Eklezia ya lobi, ba loléngé ya misa... Makambo ebelé bikokabola bandimi.

Kasi etumba ya mondoki boye ezali lokóla liziba ya bokabwani. Ekokóma 'te ba bobúkani bizala mozindo. Nazali na Moscou, na paloise ya monéne ya Eklezia na Russie, paloise ya cathédrale, esika wápi ba bobúkani bizali komonana mingi te, kasi na paloise katoliko ya Russie ya pamba, mingi mpenza moke makási, ba bokabwani bikoki ntángo mosusu kozala na makambo ya mabé makási na lisangá. Mpe ezali na ntina ya kondima basusu, ya kokoka kosambela elongo atá bimoniseli na bisó ya mokili bikeseni mpe bikesenisi na bisó ya likanisi. Ezali na ntina ya koyéba 'te Nzámbe azali monéne koleka eye ekokabola bisó. Bolingo na ye ezali monéne koleka. Mwángo na ye ya libiki ezali monéne koleka. Mpe ezali kaka bongo mpo ya bisó bansó. Tokeseni te. Akotála bisó na bokeseni te. Alingi kobikisa bisó bansó. Nionso waná ezali na ntina: kaka kondima yangó lokóla likanisi lyokó te, kasi kokotisa yangó na bosóló, kotála basusu na miso ya Nzámbe. Ezali mwá eloko ya ntina.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

05 sánzá ya mísáto 2026, 14:35