UNICEF/LIBAN: babomi bána 83 mpe 254 bazoki mikolo 7 miye mileki
Vatican News
Na nsakola yókó ebimaki na 9 ya sánzá ya misáto, Édouard Beigbeder, mokambi ya UNICEF mpo ya Moyen-Orient mpe Afrika ya Nordi, alobaki nsómo makási na ye libosó ya maye makoleka na etumba epái ya bána. "Bokobi ya bomátisi bitumba na Liban mpe pási ekopesa na bána bizali kotungisa makási", elobaki ye.
Na ba nsango ya nsuka bizuamaki na mosála ená ya ONU, bána 83 babomaki bangó mpe 254 bazoki na póso yókó. Na kátikáti (moyenne), "koleka bána 10 babomaki bangó na mokolo mókó na Liban na póso elekaki, mpe pembeni ya bána 36 bazokaki mokolo na mokolo", elobi nsakola. Úto penepene na mibú mibalé na ndambo, ezaleli ekokoba kobéba. Na ba póso 28 bileki, bána 329 babomaki bangó mpe 1 632 bazokaki, nzokándé motángo nionso ya bána bazui makámá ekokoba kobútá na bozongi ya bitumba.
Mabótá basengisami kokima
Mobúlú biluki lokóla bolonguí ya bato. UNICEF amoni pembeni na bato 700 000 basengisamaki kotika esika na bangó, o ntéi na bangó bána 200 000. Mpo ya mingi káti na bangó, ezaleli ezali pási. "Mabótá bikokima ba ndáko na bangó na bobángi mpe bána bebo bakolala na malili, babakisami baningá likoló ya basusu", eyoki Édouard Beigbeder mawa. Bato baye ya sika bakimi bipái na bangó babakisami na bato ebelé balongwaka kála o eleko ya mobúlú ezalaki libosó.
Mbela ya lombango mpo ya kobátela ba civil
Libosó ya ezaleli ená, UNICEF abengi biténi binsó bizali o káti ya etumba ya kotósá ntómo na bangó loléngé mobéko ya bato ya mokili mobimba ekosenga. UNICEF asengi mpenza bobateli ya ba civil mpe biloko ya ba civil, lokóla bitéyelo mpe bisika ya kobombana. Mosála ená ekolendisa bakambi ya politiki mpe ya mampinga ya kosála na lombango mpo ya kosilisa etumba. "UNICEF ebengi ya kosála makási ekoki mpo ya kokitisa sik’oyo bobéndani mpe ya kobatela bána na ba pási ya sika”, esúkisi nsakola. Na eleko ya mobúlú eye ekokoba, UNICEF alobi lisusu 'te bána bakofúta motúya ya koleka ya bitumba ya mindóki.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye