Bosepeli Mokolo ya mayi na mokili mobimba Bosepeli Mokolo ya mayi na mokili mobimba 

UNICEF abeleli mpo ya likámá ya mayi eye ekangi bána pembeni ya 1000 mokolo na mokolo

O eleko ya Mokolo ya mayi na mokili mobimba, esálemaka na 22 ya sánzá ya misáto, UNICEF abeleli. «Mokolo na mokolo, pembeni ya bána 1000 na nsé ya mibú mitáno bakokúfa na bozangi mayi mpe misála ya bopétoli elongobami», ekomi lisangá ya ONU na communiqué yókó. Likámá eye ya mayi ekobeta mingi mpenza bána bási mpe kobébisa bokólóngónó na bangó, botéi na bangó mpe lobí na bangó.

Vatican News

Engebene na makambo UNICEF abimisaki, bato 1,8 milliard na mokili bazali kozanga mayi ya péto. Ezaleli eye ya mawa ezali na mbéba mbala mókó na bána, mpenza ya mike. Mokolo na mokolo, «pembeni ya bána 1000 na nsé ya mibú mitáno bakokúfa na bozangi mayi ya péto mpe ya bopétoli elongobami», elobi lisusu lisangá ya ONU, na bobakisi bonéne ya likámá ya bokólóngóno ekosila te. Etiami mobú eye na likambo-likonzi «Esika wápi mayi ekoleka, bokokani ekomáta», Mokolo ya mayi na mokili mobimba ekolakisa polélé nsinga káti ya bozui mayi mpe bosémbo mpo ya bato, mingi mpenza bokokani káti ya mibáli mpe bási.

Bána bási na molongo ya yambo

Na bingúmba ebelé ya mokili, bási mpe bilenge bási bazali kokumba bozito ya likámá eye. Na mabótá mibalé likoló na misáto, bazali na lotómo ya koluka mayi. Na bikóló 53, «bási mpe bilenge bási bakopesa bangó bansó pembeni ya milio 250 ya ngonga na mokolo na mosála eye», elingi koloba koleka mbala misáto mibáli mpe bilenge babáli. Bosóló eye ezali na mbéba koleka: «milio 156 ya bilenge bási ya mibú úta 10 kinó 19 bazangi misála ya bopétoli ya ntina, eye ekobébisa bokólóngóno na bangó, lokúmu na bangó mpe botéi na bangó».

«Likámá eye mpo ya bána, mpe mpenza mpo ya bilenge bási». Na nsakola na ye ekomami, mokambi monéne ya UNICEF, Catherine Russell, abeti nsete na lomeko ya moto ya likámá eye. «Mpo ya ba milio ya bána bási na mokili, likámá ya mayi na mokili ezali likambo lyokó ya pamba te» esemboli mokambi monéne ya 8 ya lisangá. Ba bosóló bizali ya sóló mpo ya bilenge bási basusu baye «bakolamuka na ntóngóntóngó mpo ya kokende koluka mayi», baye «bakozanga kelasi» mpe «bobateli, bokólóngóno mpe lobí bikanelami». Alobi bongo 'te «likámá ya mayi na mokili ezali, na súka, likámá lyokó mpo ya bána, mpe mingimingi mpo ya bilenge bási».

Mbélá mókó ya lombango mpo ya kosála

Libosó ya ezaleli eye, UNICEF abengi na botelemi ya mokili mobimba. Lisangá elobi 'te biyano bizali, mpenza ntángo misála ya mayi bikanisami «na botáli ba mpósá ya bilenge bási», na bisika ya malámu, ya bokomi kúna na pété mpe bilongobami. Nzokándé, «mokili ezali na nzelá ya malonga te». Bobébi ya klima, bitumba mpe bozangi ya bokokani bikokomisa makási likámá. Atá mikakatano yangó, UNICEF ekokoba bikela na ye nionso penepene ya ba bulamatáli mpe ya masangá masusu mpo ya kotómbola ba loléngé ya makási ya bozui mayi mpe ya kosálisa bato bazangi makoki. Na 2025, lisangá esungaki mpenza milio 8,9 ya bási mpe bilenge bási ya kozua misála ya bokólóngóno ya sánzá na sánzá, na bosálisi bongo botikali na bangó na etéyelo mpe na lokúmu na bangó.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya mísáto 2026, 11:23