Luka

Mbéla ya sango Patton na losambo mpe bokili bilei Mbéla ya sango Patton na losambo mpe bokili bilei 

Na káti ya etumba na Moyen-Orient, sángó Patton aséngi «losámbo mpe bokili biléi»

Ndeko mineur franciscain, oyo úta Jordanie akotála na pási etumba ekosálema, abwaki mbélá mokó mpo ya «botelemi bokó enéne ya bato bansóéé »’» na kombo ya boboto. Na lisoló lyokó na ba média ya Vatican, alobi penepene na ye na bandeko na ye baye bazali na Libá, mpe na bato ya Palestine baye bakoyóka «ba ndéngé ya konyokwama mbala mókó to mbala mókó te» zambi babéngani bangó «na mabelé eye babika úta bikeke ebelé».

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

«Tokangami na libómá ya etumba, na likanisi ya kolinga kosilisa nionso na makási mpe na mindóki. Mpe likanisi ya ba civil bazui makámá na etumba ezali moléndé mpe waná kaka». Sángó Francesco Patton, custode ya kála ya Mabelé Esántu, alobi úta ngómbá Nebo, na Jordanie, botáli ebaluki epái ya libóngo esusu ya ebale Ekúfa eye ekaboli bokónzi hachémite ya Israël mpe ya Palestine, mpe likanisi ebaluki epái ya Moyen-Orient mobimba na móto. «Nakokanisa mokolo na mokolo na bandeko (confrères) baye bazali na Libá, na Beyrouth mpe epái esusu, mingi na sudi koleka na nordi, mpe baye, na ngonga eye, bazali na mokakatano. Couvent ya Tyr ebongwami ekimelo mpe baye bazali na Beyrouth bakoluka na bobwaki elikya komema lisálisi na ba civil, bakokoka lisusu te: ezali bánda leló milio mókó ya bato bakimi na bato milio motóbá ya ekóló».

Likámá ya sima ya etumba

Sángó Patton akundoli 'te úto ebándeli ya etumba ya Gaza, ezalaki polélé, mingimingi mpo ya baye, lokóla ye, balekisaki mibú ebelé na engúmba ená, 'te sóki bakokaki kosilisa etumba «na ndéngé ya mobúlú te, etumba ekopanzana». Kasi likámá ekobangisa sángó ezali 'te bayébi te nini ekoleka sima ya etumba, «mpo sima ya bitumba nionso ya súka na Moyen-Orient, makambo ya sika ya bobángisi bibimaki mpe mangómbá ya sika bimonani, lokóla Al-Qaïda, Daech, Hezbollah, Hamas, bansó bibotami sima ya etumba esila na nzelá ya politiki te na Moyen-Orient, bansó mbuma ya makanisi ya eyano ya mondóki, bitumba biye bikokaki kosila loléngé esusu».

Pási ya Palestine

Sángó Patton alobi na sima likambo ya Gaza, na bozongeli maloba malobamaka eleki mwá mikolo na episkopo ya lokúmu motomolo ya Yérusalem ya ba Latins, Pierbattista Pizzaballa, mpo ya koloba 'te etuka ebébi, 'te bato bakobika na libúlú lyokó ya likoló polélé mpe 'te, atá na bozangi ya nzala ya koleka, bizali na «likambo ya ba mino, ya bobateli, likambo ya bomoí bokó ekotosa makoki mpe lokúmu ya moto. Mpe lisusu, ezali na lisapo eye ya Lisangá ya boboto eye ebándi kútu mosála te mpe eye ekomonana kozala mingi elima na esika ya eloko yókó ya sóló ekosála».

Na Cisjordanie, epái esusu, bopanzani ya ba colonie ya Israël ekokoba, na bato ebelé bakokima. «Bokwi mboka ekokoba, lokóla bikela ya mobúlú», ekobaki sángó Patton, na bolobi «libótá babomaki eleki mwá mikolo na engúmba ya Naplouse, káti wana oyo abiki kaka mwána mókó ya mibú libwa». Bikokoba lokóla «makanisi ya bosáli mibéko biye bikopekisa Cisjordanie ya kozala mpe baí-Palestine kozua mabelé ya bangó mókó mpe botosi ya makoki na bangó: lokóla bokomi ya bituka ya Palestine na cadastre ya Israël to boboyi kondima na botángisi na bitéyelo ya Israël balakisi baye bazali na lipolome ezuamaka na bitéyelo ya likoló ya Palestine», mingi  «ba ndéngé ya konyokwama mbala mókó to mbala mókó te zambi ya bobéngani bangó na mabelé eye babika úta bikeke ebelé».

Bokili biléi mpe losámbo mpo ya boboto

Mpo 'te mobúlú ená esila, lingómbá ya bikóló, engebene na sángó Patton, esengeli kosála ekela yókó ekozua eyano mpe «esengeli mbongwana mókó ya politiki epái y'Amerika na eye etáli Moyen-Orient». Na loléngé ya eklezia, elikya ezali 'te ekoka kosálema «bosangani bokó enéne, ebongisami mpo ya bakristu mpe bandimi ya biyamba binsó, lokóla Yoane-Polo II asálaka o eleko ya etumba na Irak mpe lokóla Papá François asálaka na 2013, bosangani bokó enéne mpo ya bansó na bokili biléi mpe na losámbo mpo ya boboto. Ezali esalelo yókó ekoki komonana pamba libosó ya eye ya mindóki, kasi ezali esalelo ya boyébi eye ekoki kosangisa bandimi ya biyamba bikeseni» mpe eye ekoyanola na eye elobaki Papá Léon XIV ntángo alobaki «boboto ezanga mondóki mpe ekobotola mondóki, ya bomikitisi mpe ya bompikiliki». Ezali yangó ndé tozali na mpósá, esúkisaki sángó Patton, «na boyébi 'te mpo ya bisó, bandimi, losámbo mpe bokili biléi bizali ‘mindóki’ kaka mókó biye bikolingisa bisó ya kolakisa».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

20 sánzá ya mísáto 2026, 13:43