Luka

Bobeti ya ba drone  ya Russie na kati ya Lviv Bobeti ya ba drone ya Russie na kati ya Lviv  (ANSA)

Mobúlú na westi ya Ukraine, engúmba ya Lviv ebetami

Pembeni na ba drone 1000 bibwakamaki mokolo ya mibalé 24 ya sánzá ya misáto na ngambo ya ekóló ezali mosika na ndelo ya etumba. Bato mibalé bakúfaki o eleko ya mobúlú na esika ya boboti bána ya lopitalo lyokó ya Ivano-Frankivsk. Motángo elakisi bato bazoki 22 mpe bisika bibébi na monastère ya ba Bernardin.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Etumba na Ukraine ekokóma makási, nzokándé masoló mpo ya kimia bikosálema te, na mobúlú ya baí-Russie bakosála na westi ya ekóló, ngambo ya ekóló ezali mosika na ndelo ya etumba, na káti waná engúmba ya Lviv. Ba drone bikokoba kokweya na Lettonie mpe na Estonie.

Ba drone na mabelé ya bikóló mibalé ya OTAN

Ministeli ya Bobateli ya Riga asakolaki na ntóngó ya 25 ya sánzá ya misáto 'te drone yókó ekweyaki na mabelé ya Lettonie, na ngambo ya Kraslava. Na mikánda ya yambo bitáli makambo, bipésamaki na ba média ya Ministre wa yambo Evika Silina, ekokaki kozala drone yókó ya Ukraine ekweyaki kaka pamba na mabelé ya Lettonie.

Mwá libosó, drone yókó ekotaki na ekóló ya Estonie mpe etutaki esika ya lotiliki ya Auvère. Lokolá moto mókó azokaki te, bokwéi ya ba drone na bikóló mibalé bizali na monyele ya OTAN ezali elembo mabé na ndéngé etumba ekokende úta koleka mibú minéi.

Moto mókó te azali ya kobombana

Makambo maye bileki sima ya mobúlú ya Russie na mokolo ya mibalé 24 ya sánzá ya misáto, mokolo yangó, na pokwa, biloko ya lotiliki bibébaki na engúmba ya westi ya Ternopil. Mobúlú mókó ya makási eningisaki Lviv.

Lokolá elobaki mokambi ya etuka, Andriy Sadovyi, totángi bato bazoki 22 mpe bisika bibébi na monastère ya ba Bernardin, esika ekomama na libula ya mokili ya UNESCO ezuami o ntéi ya engúmba. Ndáko-Nzámbe grecque-catholique Sántu-Andele, ya ekeke ya 17, ezali káti ya monastère ya ba Bernardin.

Maloba ya episkopo ya Lviv

«Ba drone bikweyaki na Lviv bikoyebisa lisusu 'te etumba ekokoba», elobi na ba média ya Vatican episkopo ya Lviv, Mgr Mieczysław Mokrzycki. «Matondo na Nzámbe, bato bakúfi te, bato bazoki kaka, mpe mwá ba ndáko bibébi», elobi ye. Mgr Mieczysław Mokrzycki alobi 'te mobúlú mina bikoki kolendisa bondimi ya bato na losámbo mpo ya boboto mpe «bikoyebisa bisó lisusu baye bansó bomoí na bangó ezuaki elembo ya mokolo na mokolo ya bokwéisi ba bombe» to baye babungisi bandeko na bangó likoló ya etumba. «Tokopésa melesi na Eklezia mobimba, mingi mpenza na Eklezia ya Italie, mpo ya penepene na ye ya molimo mpe ya bomoto -esúkisaki episkopo- tokolikya 'te, o eleko ya Pasika eye, Kristu asékwi akomema boboto na mabelé na bisó».

Lopitalo lyokó ebetami na Ivano-Frankivsk

Na Ivano-Frankivsk, limpinga ya Moscou emekaki kotia mobúlú na móķó ya ba ndáko ya letá na lisálisi ya drone yókó. Lokito ya botutani epanzi mananisa ya ba ndáko, na káti waná biye ya mosála ya esika ya bobotisi bána pembeni ya lopitalo, epái wápi moto mókó na mwána na ye ya mwási ya mibú 15 bakutanaki na liwa.

Mokakatano na nzelá ya boboto

«Bonéne ya mobúlú ená ekolakisa polélé 'te Russia azali na likanisi lyokó te ya kosilisa etumba eye», elobaki mokónzi ya Ukraine, Volodymyr Zelensky. Etumba ekobaki na bokási butu mobimba: ministeli ya Bobateli ya Moscou alobaki 'te ba drone 389 ya Ukraine bibébisamaki, nzokándé mobúlú mókó elukaki ezua na káti ya bobimisi pitolo mpe mbóto ya Oust-Louga, na ebale Baltique, na engúmba ya Russia ya Leningrad, pembeni na ndelo ya Estonie.

Mampinga ya Russia, mpo ya bangó sima ya bobwaki pembeni ya 1000 drone biye bibetaki Ukraine, bakobaki mobúlú na bangó na bingúmba bisusu. Na Washington, Donald Trump alobaki elikya 'te Zelensky mpe Poutine bakoki kozua boyokani bokó ya boboto libosó ya maponami ya ntéi ya bokónzi bibongisami na sánzá ya zómi na yókó.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

29 sánzá ya mísáto 2026, 12:08